< ՄԱՏԹԷՈՍ 24 >

1 Երբ Յիսուս՝ տաճարէն դուրս ելլելով՝ կը մեկնէր, աշակերտները գացին անոր քով՝ ցուցնելու անոր տաճարին շէնքերը:
Wana Yesu azalaki kobima longwa na lopango ya Tempelo, bayekoli na Ye bapusanaki pene na Ye mpo na kotalisa Ye ndenge batonga Tempelo.
2 Յիսուս ըսաւ անոնց. «Չէ՞ք տեսներ այդ բոլորը. ճշմա՛րտապէս կը յայտարարեմ ձեզի. “Քար քարի վրայ պիտի չմնայ, ամէնը պիտի քակուի”»:
Kasi Yesu alobaki na bango: — Bomoni nyonso oyo? Nazali koloba na bino penza ya solo: nyonso ekobukama, libanga moko te ekotikala awa na likolo ya libanga mosusu.
3 Ու երբ ան նստած էր Ձիթենիներու լեռը, աշակերտները գացին իրեն՝ առանձին, եւ ըսին. «Ըսէ՛ մեզի, ե՞րբ պիտի ըլլայ ատիկա, ու ի՞նչ պիտի ըլլայ նշանը քու գալուստիդ եւ աշխարհի վախճանին»: (aiōn g165)
Lokola Yesu avandaki na ngomba ya banzete ya olive, bayekoli bapusanaki pene na Ye mpe batunaki Ye, na esika oyo bazalaki bango moko kaka: — Yebisa biso: makambo wana ekosalema tango nini? Mpe elembo nini ekotalisa koya na Yo mpe suka ya mokili? (aiōn g165)
4 Յիսուս պատասխանեց անոնց. «Զգուշացէ՛ք որ ո՛չ մէկը մոլորեցնէ ձեզ:
Yesu azongisaki: — Bosala keba ete moto moko te akosa bino!
5 Որովհետեւ շատե՜ր պիտի գան իմ անունովս եւ ըսեն. “Ե՛ս եմ Քրիստոսը”, ու պիտի մոլորեցնեն շատերը:
Pamba te bato mingi bakoya na Kombo na Ngai mpe bakoloba: « Ngai nde Masiya, » mpe bakokosa bato ebele.
6 Պիտի լսէք պատերազմներու մասին, եւ պատերազմներու տարաձայնութիւններ. զգուշացէ՛ք՝ որ չվրդովիք, որովհետեւ պէ՛տք է որ այս ամէնը ըլլայ, բայց դեռ վախճանը չէ:
Bokoyoka basango ya bitumba mpe nungunungu na tina na bitumba, kasi bomitungisa te mpo na yango; pamba te makambo wana esengeli kosalema, kasi ekozala nanu suka ya mokili te.
7 Որովհետեւ ազգ ազգի դէմ պիտի ելլէ, ու թագաւորութիւն՝ թագաւորութեան դէմ. եւ տեղ-տեղ սովեր, ժանտախտներ ու երկրաշարժներ պիտի ըլլան:
Ekolo moko ekotelemela ekolo mosusu, bokonzi moko ekobundisa bokonzi mosusu, nzala ekozala makasi penza, mpe mabele ekoningana bipai na bipai.
8 Սակայն ասոնք բոլորը ցաւերուն սկիզբն են:
Makambo nyonso wana ekozala kaka ebandeli ya pasi lokola pasi ya mwasi oyo azali kobota.
9 Այն ատեն պիտի մատնեն ձեզ տառապանքներու, պիտի սպաննեն ձեզ, ու բոլոր ազգերուն ատելի պիտի ըլլաք իմ անունիս համար:
Bongo, bakokaba bino mpo ete bomona pasi, bakoboma bino; bikolo nyonso ekoyina bino mpo na Kombo na Ngai.
10 Եւ այն ատեն շատե՜ր պիտի գայթակղին, պիտի մատնեն զիրար ու պիտի ատեն զիրար:
Mpo na yango, bato ebele bakokweyisa kondima na bango, bakokaba mpe bakoyina baninga na bango.
11 Շա՛տ սուտ մարգարէներ պիտի ելլեն, եւ պիտի մոլորեցնեն շատերը:
Basakoli ebele ya lokuta bakobima mpe bakokosa bato ebele.
12 Անօրէնութեան բազմանալուն համար՝ շատերո՜ւն սէրը պիտի պաղի:
Lokola mabe ekokola se kokola, bolingo ya bato ebele ekokita.
13 Բայց ո՛վ որ տոկայ մինչեւ վախճանը՝ անիկա՛ պիտի փրկուի:
Kasi moto oyo akoyika mpiko kino na suka akobika.
14 Այս արքայութեան աւետարանը պիտի քարոզուի ամբողջ երկրագունդին մէջ՝ իբր վկայութիւն բոլոր ազգերուն, եւ ա՛յն ատեն վախճանը պիտի գայ»:
Sango Malamu oyo ya Bokonzi ekoteyama na mokili mobimba mpo ete ezala litatoli epai ya bikolo nyonso; sima na yango kaka nde suka ekoya.
15 «Ուրեմն երբ սուրբ տեղը հաստատուած տեսնէք աւերողին պղծութիւնը՝՝, - որու մասին Դանիէլ մարգարէին միջոցով խօսուած է, - (ո՛վ որ կարդայ՝ թող հասկնայ, )
Yango wana, tango bokomona makambo ya nkele oyo epesaka bato pasi na motema, oyo mosakoli Daniele alobelaki, kosalema kati na Esika ya bule, —tika ete motangi asosola malamu—
16 այն ատեն Հրէաստանի մէջ եղողները լեռնե՛րը թող փախչին:
wana tika ete bato oyo bakozala kati na Yuda bakima na bangomba;
17 Ա՛ն որ տանիքին վրայ է՝ թող չիջնէ իր տունէն որեւէ բան առնելու,
tika ete moto oyo akozala na likolo ya ndako akita te, mpo na kokende kozwa eloko songolo kati na ndako na ye,
18 եւ ա՛ն որ արտին մէջ է՝ թող չվերադառնայ իր հանդերձները առնելու:
mpe tika ete moto oyo akozala kati na bilanga azonga na ndako te, mpo na kokende kozwa elamba na ye!
19 Բայց վա՜յ այդ օրերը յղի եղողներուն ու ծիծ տուողներուն:
Na mikolo wana, mawa na basi oyo bakozala na bazemi mpe na ba-oyo bakozala komelisa bana mabele!
20 Աղօթեցէ՛ք՝ որ ձեր փախուստը ձմեռը չըլլայ, ո՛չ ալ Շաբաթ օրը.
Bosambela mpo ete makambo wana esalema te na eleko ya malili makasi to na mokolo ya Saba.
21 քանի որ այն ատեն այնպիսի՛ մեծ տառապանք պիտի ըլլայ, որուն նմանը՝ աշխարհի սկիզբէն մինչեւ հիմա եղած չէ, ո՛չ ալ պիտի ըլլայ:
Pamba te pasi ekozala makasi, na lolenge oyo etikala nanu kozala te, wuta na ebandeli ya mokili kino sik’oyo, mpe na lolenge oyo ekotikala kozala lisusu te.
22 Եթէ այդ օրերը չկարճնային, ո՛չ մէկ մարմին պիտի փրկուէր. բայց ընտրեալներուն համար՝ այդ օրերը պիտի կարճնան:
Mpe soki Nkolo ayeisaki te mikolo yango moke, moto ata moko te akokaki kobika; kasi mpo na baponami na Ye, akoyeisa yango moke.
23 Այն ատեն եթէ մէկը ըսէ ձեզի. “Ահա՛ հո՛ս է Քրիստոսը”, կամ. “Հո՛ն է”, մի՛ հաւատաք:
Na tango wana, soki moto moko alobi na bino: « Klisto azali awa! » to « Azali kuna, » bondima ye te.
24 Որովհետեւ սուտ Քրիստոսներ ու սուտ մարգարէներ պիտի ելլեն, եւ ցոյց պիտի տան մեծ նշաններ ու սքանչելիքներ, որպէսզի՝ եթէ կարելի ըլլայ՝ մոլորեցնեն ընտրեալնե՛րն իսկ:
Pamba te bamasiya ya lokuta mpe basakoli ya lokuta bakobima, bakosala bilembo minene mpe bikamwa mpo na kokosa ata baponami, soki ekokaki kosalema.
25 Ահա՛ նախապէս ըսի ձեզի:
Namiyebiseli bino mpo ete bosala keba!
26 Ուրեմն եթէ ըսեն ձեզի. “Ահա՛ անապատին մէջ է”, մի՛ երթաք. կամ. “Ահա՛ ներքին սենեակներուն մէջ է”, մի՛ հաւատաք:
Soki moto moko alobi na bino: « Botala, azali kati na esobe, » bokende kuna te; to « Azali awa, kati na esika ebombama, » bondima yango te.
27 Քանի որ ինչպէս փայլակը կ՚ելլէ արեւելքէն ու կ՚երեւնայ մինչեւ արեւմուտք, ա՛յնպէս պիտի ըլլայ մարդու Որդիին գալուստը:
Solo, ndenge mokalikali oyo ebimi na este engengisaka kino na weste, ndenge wana mpe koya ya Mwana na Moto ekozala.
28 Որովհետեւ ո՛ւր որ դիակ կայ, հո՛ն պիտի հաւաքուին արծիւները»:
Esika nyonso ebembe ezali kopola, bandeke oyo eliaka bibembe esanganaka wana.
29 «Եւ այդ օրերու տառապանքէն անմի՛ջապէս ետք՝ արեւը պիտի խաւարի ու լուսինը պիտի չտայ իր փայլը. աստղերը պիտի իյնան երկինքէն, երկինքի զօրութիւնները պիտի սարսին,
Tango kaka mikolo yango ya pasi ekoleka, « moyi ekokoma molili, sanza ekongenga lisusu te, minzoto ekokweya longwa na likolo, mpe banguya ya Likolo ekoningisama. »
30 եւ ա՛յն ատեն մարդու Որդիին նշանը պիտի երեւնայ երկինքի մէջ: Այն ատեն երկրի բոլոր տոհմերը պիտի հեծեծեն, ու պիտի տեսնեն մարդու Որդին՝ որ կու գայ երկինքի ամպերուն վրայ, զօրութեամբ ու մեծ փառքով:
Sima na yango, elembo ya Mwana na Moto ekomonana na likolo; bongo bikolo nyonso ya mokili ekokoma kolelalela mpe ekomona Mwana na Moto koya na likolo ya mapata ya likolo, kati na nguya mpe na nkembo monene.
31 Եւ ան պիտի ղրկէ իր հրեշտակները բարձրաձայն փողով, ու պիտի հաւաքեն իր ընտրեալները չորս հովերէն, երկինքի մէկ ծայրէն մինչեւ միւս ծայրը»:
Mpe na lokito monene ya kelelo, akotinda ba-anjelu na Ye kosangisa baponami na Ye longwa na bangambo nyonso minei ya mokili: longwa na suka moko ya Likolo kino na suka mosusu.
32 «Թզենիէ՛ն սորվեցէք առակ մը. երբ անոր ոստերը կակուղնան եւ տերեւները ցցուին՝ կը հասկնաք թէ ամառը մօտ է:
Tika ete lisese ya nzete ya figi eteya bino: soki kaka bitape na yango elembi mpe ebandi kobimisa makasa, boyebaka ete eleko ya moyi makasi ekomi pene.
33 Նո՛յնպէս դուք՝ երբ տեսնէք այս բոլոր բաները, գիտցէ՛ք թէ մօտ է՝ դռներուն քով:
Ndenge moko mpe mpo na bino; tango bokomona makambo wana nyonso, boyeba ete Mwana na Moto akomi pene, lokola na bikuke ya engumba.
34 Ճշմա՛րտապէս կը յայտարարեմ ձեզի. “Այս սերունդը պիտի չանցնի, մինչեւ որ այս բոլոր բաները ըլլան”:
Nazali koloba na bino penza ya solo: bato ya ekeke oyo bakoleka te kino makambo wana nyonso ekosalema.
35 Երկինք ու երկիր պիտի անցնին, բայց իմ խօսքերս բնա՛ւ պիտի չանցնին»:
Likolo mpe mabele ekoleka, kasi maloba na Ngai ekoleka te.
36 «Իսկ այդ օրն ու ժամը՝ ո՛չ մէկ մարդ գիտէ, ո՛չ ալ երկինքի հրեշտակները, հապա՝ միա՛յն իմ Հայրս:
Mpo na oyo etali mokolo to ngonga, moko te ayebi yango, ezala ba-anjelu ya Likolo to Mwana; Ye moko kaka Tata nde ayebi yango.
37 Բայց ինչպէս Նոյի օրերուն պատահեցաւ, այնպէս ալ պիտի ըլլայ մարդու Որդիին գալուստը:
Ndenge esalemaki na tango ya Noa, ndenge wana mpe ekosalema na koya ya Mwana na Moto;
38 Որովհետեւ ինչպէս ջրհեղեղէն առաջ եղած այն օրերը՝ կ՚ուտէին, կը խմէին, կ՚ամուսնանային եւ ամուսնութեան կու տային, մինչեւ այն օրը՝ երբ Նոյ մտաւ տապանը,
pamba te liboso ete mpela eya, bato bazalaki kolia mpe komela, kobala mpe kobalisa bana na bango, kino na mokolo oyo Noa akotaki na masuwa;
39 ու չգիտցան՝ մինչեւ որ ջրհեղեղը եկաւ եւ քշեց տարաւ բոլորը, այնպէս ալ պիտի ըլլայ մարդու Որդիին գալուստը:
bayebaki eloko moko te na tina na oyo elingaki kosalema, kino mpela eyaki mpe ekumbaki bango nyonso. Ekozala mpe bongo na koya ya Mwana na Moto.
40 Այն ատեն եթէ երկու մարդիկ արտի մը մէջ ըլլան, մէկը պիտի առնուի եւ միւսը մնայ.
Mibali mibale bakozala na elanga: moko akokamatama, mpe mosusu akotikala;
41 ու եթէ երկու կիներ ջաղացքին մէջ աղան, մէկը պիտի առնուի եւ միւսը մնայ:
basi mibale bakozala konika bambuma na enikelo; moko akokamatama, mpe mosusu akotikala.
42 Ուրեմն արթո՛ւն կեցէք, որովհետեւ չէք գիտեր թէ ձեր Տէրը ո՛ր ժամուն պիտի գայ:
Yango wana, bosenzela; pamba te boyebi te mokolo nini Nkolo na bino akoya.
43 Բայց սա՛ գիտցէք թէ եթէ տանուտէրը գիտնար թէ գիշերուան ո՛ր պահուն գողը կու գայ, արթուն կը կենար եւ չէր թոյլատրեր՝ որ ծակեն իր տունը:
Bososola malamu likambo oyo: soki nkolo ndako ayebaki ngonga ya butu oyo moyibi akoya, alingaki kosenzela mpe kopekisa ye kokota kati na ndako na ye.
44 Ուստի դո՛ւք ալ պատրա՛ստ կեցէք, որովհետեւ մարդու Որդին պիտի գայ այնպիսի ժամու մը՝ որ դուք չէք ակնկալեր»:
Yango wana, bino mpe, bomibongisa, pamba te Mwana na Moto akoya na ngonga oyo bozali kokanisa kutu te.
45 «Ուրեմն ո՞վ է այն հաւատարիմ եւ իմաստուն ծառան, որ իր տէրը նշանակեց իր ծառաներուն վրայ՝ որպէսզի ատենին կերակուր տայ անոնց:
Nani azali mowumbu ya sembo mpe ya mayele epai ya nani nkolo apesaki mokumba ya kokamba basali kati na ndako na ye, mpo ete apesaka bango bilei na bango na tango oyo ekoki?
46 Երանի՜ այդ ծառային, որ իր տէրը՝ եկած ատենը՝ պիտի գտնէ թէ ա՛յնպէս կ՚ընէ:
Esengo na mowumbu oyo nkolo na ye, tango akozonga, akokuta azali kosala bongo.
47 Ճշմա՛րտապէս կը յայտարարեմ ձեզի թէ պիտի նշանակէ զայն իր ամբողջ ինչքին վրայ:
Nazali koloba na bino penza ya solo: nkolo na ye akopesa ye mokumba ya kobatela bozwi na ye nyonso.
48 Հապա եթէ այդ չար ծառան ըսէ իր սիրտին մէջ. “Իմ տէրս կ՚ուշացնէ իր գալը”,
Kasi soki azali mowumbu mabe oyo amilobeli: « Nkolo na ngai awumeli mpo na kozonga, »
49 եւ սկսի ծեծել իր ծառայակիցները, ուտել ու խմել արբեցողներուն հետ,
mpe akomi kobeta baninga na ye ya mosala, bawumbu lokola ye, kolia mpe komela masanga mesa moko elongo na balangwi masanga,
50 այդ ծառային տէրը պիտի գայ այնպիսի օր մը՝ երբ չի սպասեր, եւ այնպիսի ժամու մը՝ որ չի գիտեր,
nkolo na ye akozonga na mokolo oyo ye, mowumbu, azali kozela te mpe na ngonga oyo ayebi te;
51 ու երկուքի պիտի կտրէ զայն եւ պիտի դնէ անոր բաժինը կեղծաւորներուն հետ. հոն պիտի ըլլայ լաց ու ակռաներու կրճտում »:
akokata-kata ye na biteni mpe akotia ye esika moko na bato ya bilongi mibale, na esika oyo ekozala kolela mpe koswa minu.

< ՄԱՏԹԷՈՍ 24 >

The World is Destroyed by Water
The World is Destroyed by Water