< 传道书 12 >

1 你趁着年幼、衰败的日子尚未来到,就是你所说,我毫无喜乐的那些年日未曾临近之先,当记念造你的主。
Kanisa Mokeli na yo, na mikolo nyonso ya bolenge na yo, liboso ete mikolo ya pasi ekomela yo, mpe mibu epusana, mibu oyo okoloba na tina na yango: « Nazali kosepela na ngai na yango te; »
2 不要等到日头、光明、月亮、星宿变为黑暗,雨后云彩反回,
liboso ete moyi mpe pole, sanza mpe minzoto, ekoma molili, mpe mapata ezonga sima na mvula;
3 看守房屋的发颤,有力的屈身,推磨的稀少就止息,从窗户往外看的都昏暗;
tango bakengeli ya ndako bakolenga, mpe bato ya makasi bakofukama; tango basi oyo banikaka ble bakotika konika yango mpo ete bazali lisusu mingi te, mpe bato oyo batalaka na maninisa bakobungisa kitoko na bango;
4 街门关闭,推磨的响声微小,雀鸟一叫,人就起来,唱歌的女子也都衰微。
tango bikangelo ya ekuke ekokangama na balabala, mpe makelele ya basi oyo banikaka ble ekosila; tango bato balamukaka na banzembo ya bandeke mpe bayembi ya basi batikaka koyemba;
5 人怕高处,路上有惊慌,杏树开花,蚱蜢成为重担,人所愿的也都废掉;因为人归他永远的家,吊丧的在街上往来。
tango bato bakomaka kobanga komata likolo, mpe bakomaka kobanga makama na nzela; tango nzete ya pome ebimisaka mbuma, tango mabanki ekomaka kilo, mpe baposa ekokisamaka lisusu te; pamba te moto akendaka na ndako ya libela, mpe basi oyo balelaka na bibembe basanganaka na balabala.
6 银链折断,金罐破裂,瓶子在泉旁损坏,水轮在井口破烂,
Solo, kanisa Mokeli na yo liboso ete singa ya palata ekatana, kopo ya wolo efinana, eloko ya mayi ebukana na libulu ya mayi, mpe mashini oyo babendelaka mayi na libulu ebukana;
7 尘土仍归于地,灵仍归于赐灵的 神。
liboso ete putulu ezonga na mabele epai wapi ewutaki, mpe pema ezonga epai ya Nzambe oyo apesaki yango.
8 传道者说:“虚空的虚空,凡事都是虚空。”
Pamba na pamba, elobi mosakoli, makambo nyonso ezali kaka pamba.
9 再者,传道者因有智慧,仍将知识教训众人;又默想,又考查,又陈说许多箴言。
Mosakoli azalaki kaka moto ya bwanya te, kasi azalaki mpe koyekolisa bato boyebi; akanisaki mingi, alukaki mingi mpe atiaki na molongo masese ebele penza.
10 传道者专心寻求可喜悦的言语,是凭正直写的诚实话。
Mosakoli asalaki makasi mpo na koluka koyeba maloba ya elengi mpe kokoma na bosembo makambo ya solo.
11 智慧人的言语好像刺棍;会中之师的言语又像钉稳的钉子,都是一个牧者所赐的。
Maloba ya bato ya bwanya ezali lokola banzube, mpe buku ya masese na bango ezali lokola basete oyo ekotaka makasi na libaya. Masese yango nyonso ewuti epai ya Mobateli mpate moko.
12 我儿,还有一层,你当受劝戒:著书多,没有穷尽;读书多,身体疲倦。
Mwana na ngai, keba ete obakisa eloko moko te na likolo na yango. Suka ezali te mpo na kokoma mikanda ebele, mpe koyekola mingi elembisaka nzoto.
13 这些事都已听见了,总意就是:敬畏 神,谨守他的诫命,这是人所当尽的本分。
Yoka suka ya mateya nyonso: Tosa Nzambe mpe batela mibeko na Ye, pamba te yango nde eleki na tina mpo na moto.
14 因为人所做的事,连一切隐藏的事,无论是善是恶, 神都必审问。
Pamba te, Nzambe akomema misala nyonso na kosambisama, ezala oyo ebombama, ya malamu to ya mabe.

< 传道书 12 >