< 约拿书 1 >

1 耶和华的话临到亚米太的儿子约拿,说:
Yawe alobaki na Yona, mwana mobali ya Amitayi:
2 “你起来往尼尼微大城去,向其中的居民呼喊,因为他们的恶达到我面前。”
— Telema, kende na Ninive, engumba monene, mpe kebisa bato na yango, pamba te mabe na bango ekomi kino epai na ngai.
3 约拿却起来,逃往他施去躲避耶和华;下到约帕,遇见一只船,要往他施去。他就给了船价,上了船,要与船上的人同往他施去躲避耶和华。
Yona atelemaki. Kasi mpo na kokima mosika na Yawe, akendeki na Tarsisi, akitaki na libongo ya Jafa mpe akutaki kuna masuwa moko oyo ezalaki kokende na Tarsisi. Sima na ye kofuta mbongo mpo na mobembo, akotaki na masuwa yango mpo na kokende na Tarsisi, mosika na Yawe.
4 然而耶和华使海中起大风,海就狂风大作,甚至船几乎破坏。
Kasi Yawe atindaki mopepe makasi na likolo ya ebale monene, mpe mopepe yango ememaki mbonge oyo ekomaki pene ya kozindisa masuwa.
5 水手便惧怕,各人哀求自己的神。他们将船上的货物抛在海中,为要使船轻些。约拿已下到底舱,躺卧沉睡。
Bato oyo basalaka na masuwa bakomaki kobanga, mpe moto na moto akomaki kobelela nzambe na ye; babwakaki biloko nyonso oyo bazalaki na yango na ebale monene mpo na kokomisa masuwa pepele. Kasi Yona akitaki na kobe ya masuwa mpe, kuna, alalaki pongi ya makasi.
6 船主到他那里对他说:“你这沉睡的人哪,为何这样呢?起来,求告你的神,或者神顾念我们,使我们不致灭亡。”
Mokumbi masuwa apusanaki pene ya Yona mpe alobaki na ye: — Ndenge nini okoki penza kolala pongi boye? Telema mpe belela nzambe na yo, tango mosusu akoki koyokela biso mawa mpo ete tokufa te.
7 船上的人彼此说:“来吧,我们掣签,看看这灾临到我们是因谁的缘故。”于是他们掣签,掣出约拿来。
Bato oyo basalaka na masuwa bamilobelaki bango na bango: « Boya! Tobeta zeke mpo toyeba moto oyo azali kobendela biso pasi oyo. » Babetaki zeke, mpe zeke yango ekweyaki epai ya Yona.
8 众人对他说:“请你告诉我们,这灾临到我们是因谁的缘故?你以何事为业?你从哪里来?你是哪一国?属哪一族的人?”
Batunaki ye: — Yebisa biso nani azali kobendela biso pasi oyo? Osalaka nini? Owuti wapi? Mboka na yo nini, mpe ozali moto ya ekolo nini?
9 他说:“我是希伯来人。我敬畏耶和华—那创造沧海旱地之天上的 神。”
Yona azongisaki: — Nazali Mo-Ebre, nasambelaka Yawe, Nzambe ya Lola, oyo akela bibale mpe mokili.
10 他们就大大惧怕,对他说:“你做的是什么事呢?”他们已经知道他躲避耶和华,因为他告诉了他们。
Ayebisaki bango ete azali kokima mosika na Yawe. Boye bato yango babangaki makasi; batunaki ye: — Eloko nini osalaki kuna?
11 他们问他说:“我们当向你怎样行,使海浪平静呢?”这话是因海浪越发翻腾。
Lokola ebale ezalaki kotomboka makasi penza, batunaki ye lisusu: — Tosala yo nini mpo ete ebale evanda kimia mpe etika kotungisa biso?
12 他对他们说:“你们将我抬起来,抛在海中,海就平静了;我知道你们遭这大风是因我的缘故。”
Azongiselaki bango: — Bokamata ngai mpe bobwaka ngai na ebale monene, mpe yango ekovanda kimia, pamba te nayebi malamu ete ezali mpo na ngai nde mopepe makasi oyo etelemeli bino.
13 然而那些人竭力荡桨,要把船拢岸,却是不能,因为海浪越发向他们翻腾。
Bato yango bamipesaki nanu na koluka nkayi, na makasi na bango nyonso, mpo na komema masuwa na mokili, kasi balongaki te, pamba te mopepe etelemelaki bango makasi.
14 他们便求告耶和华说:“耶和华啊,我们恳求你,不要因这人的性命使我们死亡,不要使流无辜血的罪归与我们;因为你—耶和华是随自己的意旨行事。”
Bongo, babelelaki Yawe: « Oh Yawe, tobondeli Yo, koboma biso te likolo ya moto oyo. Kotika te ete makila ya moto oyo asali mabe te etangama na mito na biso. Pamba te ezali solo Yo Yawe nde osali oyo olingaki. »
15 他们遂将约拿抬起,抛在海中,海的狂浪就平息了。
Boye, bakamataki Yona mpe babwakaki ye na ebale monene; mpe mbala moko, ebale monene oyo etombokaki makasi evandaki kimia.
16 那些人便大大敬畏耶和华,向耶和华献祭,并且许愿。
Babangaki mpe bayokaki somo makasi liboso ya Yawe; babonzelaki Ye bambeka mpe bapesaki Ye bilaka.
17 耶和华安排一条大鱼吞了约拿,他在鱼腹中三日三夜。
Yawe atindaki mbisi moko ya monene komela Yona. Boye Yona asalaki kati na libumu ya mbisi yango mikolo misato mpe babutu misato.

< 约拿书 1 >