< Ivan 10 >

1 “Zaista, zaista, kažem vam: tko god u ovčinjak ne ulazi na vrata, nego negdje drugdje preskače, kradljivac je i razbojnik.
Nazali koloba na bino penza ya solo: moto oyo akotaka na lopango ya bameme na nzela ya ekuke te, kasi amataka na likolo ya lopango, na esika mosusu, azali moyibi mpe mobomi.
2 A tko na vrata ulazi, pastir je ovaca.
Kasi ye oyo akotelaka na ekuke azali mobateli bameme.
3 Tome vratar otvara i ovce slušaju njegov glas. On ovce svoje zove imenom pa ih izvodi.
Mokengeli afungolelaka mobateli bameme ekuke, bameme eyokaka mongongo na ye. Mobateli abengaka bameme na ye na kombo na yango mpe abimisaka yango na libanda.
4 A kad sve svoje izvede, pred njima ide i ovce idu za njim jer poznaju njegov glas.
Soki abimisi bameme na ye nyonso na libanda, alekaka liboso na yango; mpe bameme elandaka ye na sima, pamba te eyebi mongongo na ye.
5 Za tuđincem, dakako, ne idu, već bježe od njega jer tuđinčeva glasa ne poznaju.”
Ekotikala ata mokolo moko te kolanda mopaya; kasi ekokima ye mosika, pamba te eyebi mongongo na ye te.
6 Isus im kaza tu poredbu, ali oni ne razumješe što im htjede time kazati.
Yesu ayebisaki bango lisese yango, kasi basosolaki te tina ya makambo oyo azalaki koyebisa bango.
7 Stoga im Isus ponovno reče: “Zaista, zaista, kažem vam: ja sam vrata ovcama.
Mpo na yango, Yesu alobaki na bango lisusu: — Nazali koloba na bino penza ya solo: Ngai nazali ekuke ya bameme.
8 Svi koji dođoše prije mene, kradljivci su i razbojnici; ali ih ovce ne poslušaše.
Bato nyonso oyo bayaki liboso na Ngai bazali miyibi mpe babomi; bameme eyokelaki bango te.
9 Ja sam vrata. Kroza me tko uđe, spasit će se: i ulazit će i izlaziti i pašu nalaziti.
Ngai nde nazali ekuke; moto nyonso oyo akokotela na nzela na Ngai akobika; akokota mpe akobima, mpe akozwa bilei.
10 Kradljivac dolazi samo da ukrade, zakolje i pogubi. Ja dođoh da život imaju, u izobilju da ga imaju.”
Moyibi ayaka kaka mpo na koyiba, koboma mpe kobebisa; kasi Ngai, nayei mpo ete bameme ezwa bomoi mpe ezwa yango na bofuluki penza.
11 “Ja sam pastir dobri. Pastir dobri život svoj polaže za ovce.
Nazali mobateli malamu ya bameme. Mobateli malamu ya bameme apesaka bomoi na ye mpo na bameme na ye.
12 Najamnik - koji nije pastir i nije vlasnik ovaca - kad vidi vuka gdje dolazi, ostavlja ovce i bježi, a vuk ih grabi i razgoni:
Mosali oyo azali mobateli bibwele te, oyo azali nkolo bameme te, asalaka kaka mpo na lifuti. Soki kaka amoni mbwa ya zamba koya, asundolaka bameme mpe akimaka. Bongo mbwa ya zamba ekangaka bameme mpe epanzaka yango.
13 najamnik je i nije mu do ovaca.
Mosali yango akimaka, pamba te asalaka kaka mpo na lifuti mpe atiaka makanisi na ye na bameme te.
14 Ja sam pastir dobri i poznajem svoje i mene poznaju moje,
Ngai, nazali mobateli malamu ya bibwele; nayebi bameme na Ngai, mpe bameme na Ngai eyebi Ngai
15 kao što mene poznaje Otac i ja poznajem Oca i život svoj polažem za ovce.
—ndenge kaka Tata ayebi Ngai, mpe Ngai nayebi Tata— Nazali kokaba bomoi na Ngai mpo na bameme na Ngai.
16 Imam i drugih ovaca, koje nisu iz ovog ovčinjaka. I njih treba da dovedem i glas će moj čuti i bit će jedno stado, jedan pastir.
Nazali na bameme mosusu oyo ezali ya lopango oyo te. Nasengeli komema yango; ekoyoka mongongo na Ngai. Etonga ekozala kaka moko, mpe mobateli bibwele akozala kaka moko.
17 Zbog toga me i ljubi Otac što polažem život svoj da ga opet uzmem.
Tata alingaka Ngai mpo ete nazali kokaba bomoi na Ngai; kasi nakozwa yango lisusu.
18 Nitko mi ga ne oduzima, nego ja ga sam od sebe polažem. Vlast imam položiti ga, vlast imam opet uzeti ga. Tu zapovijed primih od Oca svoga.”
Moto moko te azali kobotola Ngai bomoi yango, kasi Ngai moko nde nazali kokaba yango, na mokano na Ngai moko. Nazali na bokonzi ya kopesa mpe ya kozwa yango lisusu. Yango nde mitindo oyo Tata na Ngai apesaki Ngai.
19 Među Židovima ponovno nasta podvojenost zbog tih riječi.
Bayuda bakabwanaki lisusu likolo ya maloba yango.
20 Mnogi su od njih govorili: “Zloduha ima pa mahnita! Što ga slušate?”
Mingi kati na bango bazalaki koloba: — Azali na molimo mabe! Azali na liboma! Mpo na nini bozali koyoka ye?
21 Drugi su govorili: “Nisu to riječi opsjednuta. Zar zloduh može slijepima oči otvoriti?”
Bamosusu bazalaki kozongisa: — Maloba wana ezali te ya moto oyo azali na se ya bokonzi ya molimo mabe! Boni, molimo mabe ekoki penza kofungola miso ya bakufi miso?
22 Svetkovao se tada u Jeruzalemu Blagdan posvećenja. Bila je zima.
Ekomaki tango ya kosepela feti ya Kobulisa Tempelo ya Yelusalemi. Feti yango esalemaki na tango ya malili makasi.
23 Isus je obilazio Hramom po trijemu Salomonovu.
Yesu azalaki kotambola kati na lopango ya Tempelo, na veranda ya Salomo.
24 Okružili ga Židovi i govorili mu: “Dokle ćeš nam dušu držati u neizvjesnosti? Ako si ti Krist, reci nam otvoreno!”
Bayuda bazingelaki Ye mpe batunaki Ye: — Kino tango nini okotika mitema na biso likolo-likolo? Soki ozali Klisto, yebisa biso yango polele!
25 Isus im odgovori: “Rekoh vam pa ne vjerujete. Djela što ih ja činim u ime Oca svoga - ona svjedoče za mene.
Yesu azongiselaki bango: — Nayebisaki bino yango, kasi boboyi na bino kondima. Makamwisi oyo nazali kosala na Kombo ya Tata ezali kotatola na tina na Ngai;
26 Ali vi ne vjerujete jer niste od mojih ovaca.
kasi bino, boboyi na bino kondima, pamba te bozali bameme na Ngai te.
27 Ovce moje slušaju glas moj; ja ih poznajem i one idu za mnom.
Bameme na Ngai eyokaka mongongo na Ngai. Nayebi bameme na Ngai, mpe yango elandaka Ngai.
28 Ja im dajem život vječni te neće propasti nikada i nitko ih neće ugrabiti iz moje ruke. (aiōn g165, aiōnios g166)
Napesi yango bomoi ya seko: ekokufa soki moke te, mpe moto ata moko te akobotola yango na loboko na Ngai. (aiōn g165, aiōnios g166)
29 Otac moj, koji mi ih dade, veći je od svih i nitko ih ne može ugrabiti iz ruke Očeve.
Tata na Ngai, oyo apesaki Ngai bameme yango, aleki bato nyonso na monene, mpe moto moko te akoki kobotola yango na loboko ya Tata na Ngai.
30 Ja i Otac jedno smo.”
Ngai mpe Tata tozali se moko.
31 Židovi ponovno pograbiše kamenje da ga kamenuju.
Na bongo, Bayuda balokotaki lisusu mabanga mpo na koboma Ye,
32 Isus im odgovori: “Mnoga vam dobra djela Očeva pokazah. Za koje me od tih djela kamenujete?”
kasi Yesu alobaki na bango: — Nalakisi bino bikamwa mingi ya minene oyo esalemaki na nguya ya Tata; mpo na likamwisi nini bolingi koboma Ngai na mabanga?
33 Odgovoriše mu Židovi: “Zbog dobra te djela ne kamenujemo, nego zbog hule: što ti - čovjek - sebe Bogom praviš.”
Bayuda bazongiselaki Ye: — Ezali te mpo na likamwisi moko boye ya malamu nde tolingi koboma yo, kasi ezali mpo ete ozali kofinga Nzambe. Lisusu, ezali mpo ete, yo oyo ozali moto, ozali koloba ete ozali Nzambe.
34 Odgovori im Isus: “Nije li pisano u vašem Zakonu: Ja rekoh: bogovi ste!
Yesu alobaki na bango: — Ekomama te kati na mibeko na bino: « Nalobi: ‹ Bozali banzambe? › »
35 Ako bogovima nazva one kojima je riječ Božja upravljena - a Pismo se ne može dokinuti -
Nzokande, batiaka tembe na Makomi te. Boye, soki abengaki « banzambe, » bato oyo epai banani Liloba na Nzambe eyaki,
36 kako onda vi onome kog Otac posveti i posla na svijet možete reći: 'Huliš!' - zbog toga što rekoh: 'Sin sam Božji!'
mpo na nini koloba na tina na Ngai oyo Tata abulisa mpe atinda kati na mokili: « Ozali kofinga, » mpo nalobaki: « Nazali Mwana na Nzambe? »
37 Ako ne činim djela Oca svoga, nemojte mi vjerovati.
Soki nasalaka te misala ya Tata na Ngai, wana bondima na bino Ngai te.
38 Ali ako činim, sve ako meni i ne vjerujete, djelima vjerujte pa uvidite i upoznajte da je Otac u meni i ja u Ocu.”
Kasi soki nasalaka yango, ezala soki boboyi na bino kondima Ngai, bondima ata misala yango, mpo boyeba mpe bososola ete Tata azali kati na Ngai, mpe Ngai nazali kati na Tata.
39 Nato ga ponovno nastojahu uhvatiti, ali im on izmaknu iz ruku.
Mpo na yango, balukaki lisusu kokanga Ye, kasi Yesu akimaki bango.
40 I ode ponovno na onu stranu Jordana - na mjesto gdje je prije Ivan krstio. I osta ondje.
Akendeki lisusu na ngambo mosusu ya Yordani, kaka na esika oyo Yoane azalaki kobatisa bato, mpe atikalaki kuna.
41 A mnogi dođoše k njemu i rekoše mu: “Ivan doduše ne učini nijednog znamenja, ali se sve obistinilo što je rekao o ovome.”
Bato mingi penza bayaki epai na Ye; bazalaki koloba: « Yoane asalaki likamwisi ata moko te, kasi makambo nyonso oyo alobaki na tina na moto oyo ezali ya solo! »
42 Mnogi ondje povjerovaše u njega.
Mpe kuna, bato mingi bandimaki Yesu.

< Ivan 10 >