< Jeremias 28 >

1 Kong Zedekias af Judas fjerde regeringsår i den femte måned sagde Profeten Hananja, Azzurs Søn, fra Gibeon til mig i HERRENs Hus i Præsternes og alt Folkets Nærværelse:
Kaka na mobu wana, mobu ya minei, na ebandeli ya bokonzi ya Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, na sanza ya mitano, mosakoli Anania, mwana mobali ya Azuri, moto ya mboka Gabaoni, alobaki na ngai kati na Tempelo ya Yawe na miso ya Banganga-Nzambe mpe ya bato nyonso:
2 "Så siger Hærskarers HERRE, Israels Gud: Jeg har sønderbrudt Babels Konges Åg.
« Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi: ‹ Nakobuka ekangiseli ya mokonzi ya Babiloni.
3 Om to År fører jeg tilbage hertil alle HERRENs Huss Kar, som Kong Nebukadnezar af Babel tog herfra og førte til Babel;
Etikali kaka mibu mibale; nakozongisa na esika oyo bisalelo nyonso ya Tempelo ya Yawe, oyo Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, azwaki na esika oyo mpe amemaki na Babiloni.
4 og Jojakims Søn, Kong Jekonja af Juda, og alle de landflygtige fra Juda, som kom til Babel, fører jeg tilbage hertil, lyder det fra HERREN; thi jeg sønderbryder Babels Konges Åg."
Nakozongisa lisusu na esika oyo: Yekonia, mwana mobali ya Yeoyakimi, mokonzi ya Yuda, mpe bato nyonso oyo, wuta na Yuda, bakendeki na bowumbu, na Babiloni, › elobi Yawe, ‹ pamba te nakobuka ekangiseli ya mokonzi ya Babiloni. › »
5 Profeten Jeremias svarede Profeten Hananja i Nærværelse af Præsterne og alt Folket, som stod i HERRENs Hus,
Bongo Mosakoli Jeremi azongiselaki mosakoli Anania eyano na miso ya Banganga-Nzambe mpe ya bato nyonso oyo batelemaki kati na Tempelo ya Yawe.
6 således: "Amen! Måtte HERREN gøre således og stadfæste, hvad du har profeteret, og føre HERRENs Huss Kar og alle de landflygtige fra Babel tilbage hertil!
Mosakoli Jeremi alobaki: « Amen! Tika ete Yawe asala bongo! Tika ete Yawe akokisa maloba oyo osili kosakola, azongisa na esika oyo, wuta na Babiloni, bisalelo ya Tempelo ya Yawe mpe bato nyonso oyo bakendeki na bowumbu!
7 Men hør dog dette Ord, som jeg vil tale til dig og alt Folket:
Nzokande, yoka maloba oyo nalingi koloba na yo mpe na bato nyonso:
8 De Profeter, som levede før mig og dig fra Fortids Dage, profeterede mod mange Lande og mægtige Riger om krig, Hunger og Pest;
Wuta kala, basakoli oyo basakolaki liboso ete yo mpe ngai tozala, basakolaki bitumba, pasi mpe bokono oyo ebomaka, mpo na kotelemela bikolo ebele mpe mikili ya makasi;
9 men når en Profet profeterer om Fred, kendes den Profet, HERREN virkelig har sendt, på at hans Ord går i Opfyldelse."
kasi soki mosakoli asakoli kimia, akondimama ete azali solo mosakoli oyo Yawe atindi masakoli na ye ekokisami. »
10 Så rev Profeten Hananja Ågstængerne af Profeten Jeremiass Hals og sønderbrød dem;
Bongo mosakoli Anania alongolaki ekangiseli na kingo ya mosakoli Jeremi mpe abukaki yango.
11 og Hananja sagde i alt Folkets Nærværelse: "Så siger HERREN: Således sønderbryder jeg om to År Kong Nebukadnezar af Babels Åg og tager det fra alle Folkenes Hals." Men Profeten Jeremias gik sin Vej.
Anania alobaki liboso ya bato nyonso: « Tala liloba oyo Yawe alobi: ‹ Liboso ete mibu mibale ekoka, nakobuka ndenge wana ekangiseli ya Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, na kingo ya bikolo nyonso. › » Mpe mosakoli Jeremi akendeki na ye.
12 Men efter at Profeten Hananja havde sønderbrudt Ågstængerne og revet dem af Profeten Jeremiass Hals, kom HERRENs Ord til Jeremias således:
Sima na mosakoli Anania kobuka ekangiseli na kingo ya mosakoli Jeremi, Yawe alobaki na Jeremi:
13 "Gå hen og sig til Hananja: Så siger HERREN: Du har sønderbrudt Ågstænger af Træ, men jeg vil lave Ågstænger af Jern i Stedet.
« Kende koloba na Anania: ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi: Solo, obuki ekangiseli ya banzete; kasi na esika na yango, okolata nde ekangiseli ya ebende.
14 Thi så siger Hærskarers HERRE, Israels Gud: Et Jernåg lægger jeg på alle disse Folks Hals, at de må trælle for Kong Nebukadnezar af Babel; de skal trælle for ham, selv Markens Vildt har jeg givet ham."
Pamba te, tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi: Nasili kotia ekangiseli ya ebende na kingo ya bikolo nyonso mpo ete esalela Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, mpe ekosalela ye solo. Nakopesa ye bokonzi ata likolo ya banyama ya zamba. › »
15 Så sagde Profeten Jeremias til Profeten Hananja: "Hør, Hananja! HERREN har ikke sendt dig, og du har fået dette Folk til at slå Lid til Løgn.
Bongo mosakoli Jeremi alobaki lisusu na mosakoli Anania: « Anania, yoka! Yawe atindi yo te; mpe ozali kotindika bato oyo na kotia motema na makambo ya lokuta!
16 Derfor, så siger HERREN: Se, jeg slænger dig bort fra Jordens Flade; du skal dø i År, thi du har prædiket Frafald fra HERREN."
Mpo na yango, tala liloba oyo Yawe alobi: ‹ Nakolongola yo na mokili oyo, okokufa kaka na mobu oyo; pamba te otindiki bato na kotombokela Yawe. › »
17 Og Profeten Hananja døde samme År i den syvende Måned.
Kaka na mobu wana, na sanza ya sambo, mosakoli Anania akufaki.

< Jeremias 28 >