< Ordsprogene 22 >

1 Hellere godt Navn end megen rigdom, Yndest er bedre end Sølv og Guld
Kokende sango ya malamu ezali malamu koleka kozala na bomengo mingi; lokumu ezali malamu koleka palata mpe wolo.
2 Rig og fattig mødes, HERREN har skabt dem begge.
Mozwi mpe mobola bazali na likambo moko ya lisanga: ezali Yawe nde azali Mokeli na bango mibale.
3 Den kloge ser Faren og søger i Skjul, tankeløse går videre og bøder.
Moto ya mayele amonaka likama na mosika mpe amibombaka, kasi moto oyo azangi mayele akoleka wana mpe akokutana na pasi.
4 Lønnen for Ydmyghed og HERRENs Frygt er Rigdom, Ære og Liv.
Komikitisa mpe kotosa Yawe ememaka bozwi, lokumu mpe bomoi.
5 På den svigefuldes Vej er der Torne og Snarer; vil man vogte sin Sjæl, må man holde sig fra dem.
Nzela ya bato mabe ezalaka na banzube mpe mitambo, kasi moto oyo abatelaka molimo na ye azalaka mosika na yango.
6 Væn Drengen til den Vej, han skal følge, da viger han ikke derfra, selv gammel.
Lakisa mwana nzela oyo asengeli kotambola wuta na bomwana na ye; ezala tango akokoma mokolo, akobunga yango te.
7 Over Fattigfolk råder den rige, Låntager bliver Långivers Træl.
Mozwi azalaka mokonzi ya mobola, mpe modefi azalaka mowumbu ya modefisi.
8 Hvo Uret sår, vil høste Fortræd, hans Vredes Ris skal slå ham selv.
Moto oyo alonaka masumu abukaka pasi, mpe makasi ya kanda na ye nyonso ekosuka.
9 Den vennesæle velsignes, thi han deler sit Brød med den ringe.
Moto oyo akabaka na esengo akopambolama, pamba te akabolaka bilei na ye na mobola.
10 Driv Spotteren ud, så går Trætten med, og Hiv og Smæden får Ende.
Bengana motioli, bongo kowelana, koswana mpe kofingana ekosila.
11 HERREN elsker den rene af Hjertet; med Ynde på Læben er man Kongens Ven.
Moto oyo alingaka kozala peto na motema, oyo ngolu ezalaka na bibebu na ye, mokonzi azalaka molingami na ye.
12 HERRENs Øjne agter på Kundskab, men han kuldkaster troløses Ord.
Miso na Yawe ebatelaka boyebi, kasi akweyisaka maloba ya moto oyo azangi mayele.
13 Den lade siger: "En Løve på Gaden! Jeg kan let blive revet ihjel på Torvet."
Moto ya goyigoyi alobaka: « Nkosi ezali kuna na libanda, ekoboma ngai na kati-kati ya balabala. »
14 Fremmed Kvindes Mund er en bundløs Grav, den, HERREN er vred på, falder deri.
Monoko ya mwasi ya ndumba ezalaka lokola libulu ya mozindo; moto oyo Yawe asilikeli akweyaka kuna.
15 Dårskab er knyttet til Ynglingens Hjerte, Tugtens Ris skal tjerne den fra ham.
Motema ya mwana moke ezalaka na bozoba, bongo fimbu ya pamela elongolaka yango kati na ye.
16 Vold mod den ringe øger hans Eje, Gave til Rigmand gør ham kun fattig. -
Moto oyo anyokolaka mobola mpo ete akoma na bomengo mingi mpe oyo apesaka mozwi bakado bakokweya na bobola.
17 Bøj Øret og hør de vises Ord, vend Hjertet til og kend deres Liflighed!
Pesa matoyi mpe yoka toli ya bato ya bwanya, mpe tika ete motema na yo endima mateya na ngai.
18 Vogter du dem i dit Indre, er de alle rede på Læben.
Pamba te ekozala esengo soki obombi yango na motema na yo, mpe soki yango nyonso ezali pene ya bibebu na yo.
19 For at din Lid skal stå til HERREN, lærer jeg dig i Dag.
Nateyi yo yango lelo mpo ete elikya na yo ezala kati na Yawe.
20 Alt i Går optegned jeg til dig, alt i Forgårs Råd og Kundskab
Boni, lobi eleki, nakomelaki yo te batoli koleka tuku misato, batoli ya bwanya mpe ya boyebi,
21 for at lære dig rammende Sandhedsord, at du kan svare sandt, når du spørges.
batoli oyo epesaka mateya ya solo mpe maloba ya solo mpo ete okoka kozongisa biyano ya solo na moto oyo atindi yo?
22 Røv ej fra den ringe, fordi han er ringe, knus ikke den arme i Porten:
Kobotola te na makasi biloko ya mobola, pamba te azali mobola, konyokola te moto ya pasi na esambiselo,
23 thi HERREN fører deres Sag og raner deres Ransmænds Liv.
pamba te Yawe akobundela bango mpe akobebisa bomoi ya bato oyo bakobebisa bomoi na bango.
24 Vær ej Ven med den, der let bliver hidsig, omgås ikke vredladen Mand,
Kozala molingami te ya moto ya kanda, mpe kosangana te na moto ya motema moto-moto,
25 at du ikke skal lære hans Stier og hente en Snare for din Sjæl.
noki te okoyekola nzela na ye mpe okokangama na motambo na ye.
26 Hør ikke til dem, der giver Håndslag, dem, som borger for Gæld!
Kozala te na molongo ya bato oyo batombolaka maboko mpo na kondima kofuta baniongo ya bato mosusu,
27 Såfremt du ej kan betale, tager man Sengen, du ligger i.
pamba te soki ozali na yo na makoki ya kofuta te, mpo na nini okolinga ete babotola ata mbeto na yo ya kolala?
28 Flyt ej ældgamle Skel, dem, dine Fædre satte.
Kozongisa na sima te mondelo ya kala oyo batata na yo bakataki.
29 Ser du en Mand, som er snar til sin Gerning, da skal han stedes for Konger, ikke for Folk af ringe Stand.
Osila komona moto oyo ayebi mosala na ye malamu? Akosala kaka liboso ya bakonzi, akosala te liboso ya bato ya molili.

< Ordsprogene 22 >