< Ordsprogene 7 >

1 Min Søn, vogt dig mine Ord, mine bud må du gemme hos dig;
Mwana na ngai, batela mibeko na ngai mpe bomba yango malamu kati na motema na yo.
2 vogt mine bud, så skal du leve, som din Øjesten vogte du, hvad jeg har lært dig;
Batela mateya na ngai malamu, mpe okozala na bomoi; batela mibeko na ngai lokola mbuma ya liso na yo.
3 bind dem om dine Fingre, skriv dem på dit Hjertes Tavle,
Lata yango na loboko na yo lokola lopete, koma yango na etando ya motema na yo.
4 sig til Visdommen: "Du er min Søster!" og kald Forstanden Veninde,
Loba na Bwanya: « Ozali ndeko na ngai ya mwasi, » mpe bengaka Mayele « Moninga na ngai; »
5 at den må vogte dig for Andenmands Hustru, en fremmed Kvinde med sleske Ord.
mpo ete ekoka kobatela yo liboso ya mwasi ya ndumba mpe ekoka kokebisa yo liboso ya mwasi oyo alobaka maloba ya elengi, nzokande ezali ya lokuta.
6 Thi fra mit Vindue skued jeg ud, jeg kigged igennem mit Gitter;
Mokolo moko, nazalaki kotala wuta na madusu ya lininisa ya ndako na ngai,
7 og blandt de tankeløse så jeg en Yngling, en uden Vid blev jeg var blandt de unge;
namonaki kati na molongo ya bato oyo bazangi mayele, kati na bilenge mibali, elenge mobali moko oyo azangi penza mayele.
8 han gik på Gaden tæt ved et Hjørne, skred frem på Vej til hendes Hus
Azalaki koleka na balabala, pene ya esika oyo mwasi wana ya ndumba avandaka, mpe akotaki na nzela oyo ekenda kino na ndako ya mwasi ya ndumba.
9 i Skumringen henimod Aften, da Nat og Mørke brød frem.
Ezalaki na pokwa, tango moyi elimwaki, mpe molili ya butu ekomaki koya.
10 Og se, da møder Kvinden ham i Skøgedragt, underfundig i Hjertet;
Mpe tala, mwasi yango ya ndumba ayaki kokutana na elenge mobali, alataki penza lokola mwasi ya ndumba, mpe motema na ye etonda na mayele mabe;
11 løssluppen, ustyrlig er hun, hjemme fandt hendes Fødder ej Ro;
azalaki mwasi ya makelele makasi mpe ya mobulu, makolo na ye evandaka na ndako te,
12 snart på Gader, snart på Torve, ved hvert et Hjørne lurer hun; -
atalaka-talaka na bisika nyonso, tango mosusu na libanda, tango mosusu na bisika oyo bato ebele bakutanaka.
13 hun griber i ham og kysser ham og siger med frække Miner;
Mwasi yango ya ndumba asimbaki elenge mobali, ayambaki ye, alaliselaki ye miso mpe alobaki na ye:
14 "Jeg er et Takoffer skyldig og indfrier mit Løfte i Dag,
« Nazalaki na niongo ya mbeka ya kozongisa matondi epai na Yawe; mpe lelo, nasili kokokisa ndayi na ngai.
15 gik derfor ud for at møde dig, søge dig, og nu har jeg fundet dig!
Yango wana, nabimaki mpo na kokutana na yo; nazalaki koluka yo, mpe, tala, namoni yo.
16 Jeg har redt mit Leje med Tæpper, med broget ægyptisk Lærred
Natandi mbeto na ngai na babulangeti ya langi ya ndenge na ndenge, basala na basinga ya lino oyo ewutaka na Ejipito.
17 jeg har stænket min Seng med Myrra, med Aloe og med Kanelbark;
Na mbeto na ngai, nasopi malasi ya mire, ya aloe mpe ya sinamoni.
18 kom, lad os svælge til Daggry i Vellyst, beruse os i Elskovs Lyst!
Yaka tolangwa bolingo kino na tongo, tomipesa mobimba na elengi ya bolingo,
19 Thi Manden er ikke hjemme, - på Langfærd er han draget;
pamba te mobali na ngai azali na ye na ndako te, akendeki mobembo na mokili ya mosika,
20 Pengepungen tog han med, ved Fuldmåne kommer han hjem!"
akendeki na saki ya mbongo na maboko, akozonga na ndako te kino na tango oyo sanza engengaka. »
21 Hun lokked ham med mange fagre Ord, forførte ham med sleske Læber;
Na nzela ya maloba na ye ya sukali, alongaki kokosa ye; na nzela ya maloba na ye ya elengi, amemaki ye.
22 tankeløst følger han hende som en Tyr, der føres til Slagtning, som en Hjort, der løber i Nettet,
Elenge mobali alandaki ye mbala moko, lokola ngombe oyo bazali komema na bisika oyo babomaka banyama, lokola moto ya liboma oyo bakangi mpo na kobeta ye
23 til en Pil gennemborer dens Lever, som en Fugl, der falder i Snaren, uden at vide, det gælder dens Liv.
kino tango likonga ekotobola ye motema, lokola ndeke oyo ekeyi mbangu na motambo na kozanga koyeba ete ekeyi kokufa.
24 Hør mig da nu, min Søn, og lyt til min Munds Ord!
Sik’oyo, mwana na ngai ya mobali, yoka ngai, pesa ngai matoyi na yo mpo na koyoka maloba ya monoko na ngai!
25 Ej bøje du Hjertet til hendes Veje, far ikke vild på hendes Stier;
Tika ete mwasi ya boye akumba te motema na yo! Kopengwa te na banzela na ye,
26 thi mange ligger slagne, hvem hun har fældet, og stor er Hoben, som hun slog ihjel.
pamba te asili kokweyisa mpe kozokisa bato ebele, mpe asili kobomisa bingambe mibali.
27 Hendes Hus er Dødsrigets Veje, som fører til Dødens Kamre. (Sheol h7585)
Ndako na ye ezali penza nzela ya mboka ya bakufi, oyo ememaka kino na bandako ya kufa. (Sheol h7585)

< Ordsprogene 7 >