< Isaiah 19 >

1 The burden of Egypt. “Behold, the LORD rides on a swift cloud, and comes to Egypt. The idols of Egypt will tremble at his presence; and the heart of Egypt will melt within it.
Maloba ya Yawe mpo na kosambisa Ejipito: Tala, Yawe amati likolo ya mapata oyo ekendaka mbangu, azali koya na Ejipito. Banzambe ya bikeko ya Ejipito ezali kolenga liboso na Ye mpe mitema ya bato ya Ejipito elembi-lembi kati na bango.
2 I will stir up the Egyptians against the Egyptians, and they will fight everyone against his brother, and everyone against his neighbor; city against city, and kingdom against kingdom.
« Nakosala ete bato ya Ejipito batelemelana bango na bango: ndeko akobundisa ndeko na ye, moninga akobundisa moninga na ye, engumba moko ekobundisa engumba mosusu, mpe mboka moko ekobundisa mboka mosusu.
3 The spirit of the Egyptians will fail within them. I will destroy their counsel. They will seek the idols, the charmers, those who have familiar spirits, and the wizards.
Bato ya Ejipito bakosila mayele, mpe nakobebisa mabongisi na bango nyonso; bakokende kotuna toli epai ya banzambe ya bikeko, epai ya milimo ya bakufi, epai ya bato oyo basololaka na milimo ya bakufi mpe epai ya bato oyo balobaka makambo oyo ekoya.
4 I will give over the Egyptians into the hand of a cruel lord. A fierce king will rule over them,” says the Lord, GOD of Armies.
Nakokaba bato ya Ejipito na maboko ya bakonzi ya mitema mabe, mpe mokonzi moko ya kanda makasi akokonza bango, » elobi Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga.
5 The waters will fail from the sea, and the river will be wasted and become dry.
Mayi ya ebale monene ekokita, mpe mayi ya ebale ekosila mpe ekokawuka.
6 The rivers will become foul. The streams of Egypt will be diminished and dried up. The reeds and flags will wither away.
Mayi ya miluka ekokoma solo, mayi ya Ejipito ekokita mpe ekokawuka. Mpe lisusu, banzete oyo ebotaka na mayi ekokawuka,
7 The meadows by the Nile, by the brink of the Nile, and all the sown fields of the Nile, will become dry, be driven away, and be no more.
elongo na matiti oyo ezalaka pembeni ya Nili, na monoko ya ebale. Milona nyonso ya bilanga oyo ebotaka pembeni ya Nili ekokawuka mpe ekopumbwa na mopepe, eloko moko te ekotikala.
8 The fishermen will lament, and all those who fish in the Nile will mourn, and those who spread nets on the waters will languish.
Balobi mbisi bakonyokwama mpe bakokoma kolela, bato nyonso oyo babwakaka ndobo mpe minyama na ebale Nili bakokoma na pasi.
9 Moreover those who work in combed flax, and those who weave white cloth, will be confounded.
Bato oyo basalaka lino bakokufa soni ya makasi, mpe bato oyo batongaka bilamba bakotonda na mawa.
10 The pillars will be broken in pieces. All those who work for hire will be grieved in soul.
Bato oyo basimbaka mokili bakokweya, mpe basali nyonso bakolemba nzoto.
11 The princes of Zoan are utterly foolish. The counsel of the wisest counselors of Pharaoh has become stupid. How do you say to Pharaoh, “I am the son of the wise, the son of ancient kings”?
Bakambi ya Tsoani bakomi penza lokola bazoba, bato ya bwanya ya Faraon bakomi kopesa batoli oyo ezanga tina. Ndenge nini bokoki penza koloba na Faraon: « Ngai, nazali moko kati na bato ya bwanya, moyekoli ya bakonzi ya kala? »
12 Where then are your wise men? Let them tell you now; and let them know what the LORD of Armies has purposed concerning Egypt.
Wapi sik’oyo bato na yo ya bwanya? Tika ete balakisa yo mpe basosolisa yo makambo oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, abongisaki mpo na kotelemela Ejipito.
13 The princes of Zoan have become fools. The princes of Memphis are deceived. They have caused Egypt to go astray, those who are the cornerstone of her tribes.
Bakambi ya Tsoani bakomi lokola bazoba, bakambi ya Mefisi bakomi kokanisa makambo ya lokuta; nzokande bango, makonzi ya bikolo ya bato ya Ejipito, nde bazali kobungisa bato ya Ejipito nzela.
14 The LORD has mixed a spirit of perverseness in the middle of her; and they have caused Egypt to go astray in all of its works, like a drunken man staggers in his vomit.
Yawe atindeli bango molimo ya kizunguzungu: bango nde basalaki ete Ejipito ekoma kotenga-tenga na misala na yango nyonso ndenge moto oyo alangwe masanga atengaka-tengaka.
15 Neither shall there be any work for Egypt, which head or tail, palm branch or rush, may do.
Eloko moko te ekosalema lisusu na Ejipito, ezala na moto to na mokila, na lindalala ya nzete ya mbila to na nzete oyo ebotaka na mayi.
16 In that day the Egyptians will be like women. They will tremble and fear because of the shaking of the LORD of Armies’s hand, which he shakes over them.
Na mokolo wana, bato ya Ejipito bakokoma lokola basi. Bakolenga na somo na koningana ya loboko oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, atomboli mpo na kotelemela bango.
17 The land of Judah will become a terror to Egypt. Everyone to whom mention is made of it will be afraid, because of the plans of the LORD of Armies, which he determines against it.
Bongo mokili ya Yuda ekolengisa bato ya Ejipito na somo. Tango nyonso bakoyoka kombo ya Yuda, bakolenga na somo mpo na mabongisi nyonso oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, asalaki mpo na kotelemela bango.
18 In that day, there will be five cities in the land of Egypt that speak the language of Canaan, and swear to the LORD of Armies. One will be called “The city of destruction.”
Na mokolo wana, bingumba mitano kati na Ejipito ekokoma koloba lokota ya Bayuda mpe kolapa ndayi na Kombo na Yawe, Mokonzi ya mampinga. Bongo moko kati na yango ekobenga yango: Engumba ya moyi.
19 In that day, there will be an altar to the LORD in the middle of the land of Egypt, and a pillar to the LORD at its border.
Na mokolo wana, bakotonga etumbelo moko na kati-kati ya Ejipito mpe bakotia likonzi moko lokola ekaniseli mpo na Yawe, na bandelo ya mokili.
20 It will be for a sign and for a witness to the LORD of Armies in the land of Egypt; for they will cry to the LORD because of oppressors, and he will send them a savior and a defender, and he will deliver them.
Ekozala lokola elembo mpe litatoli mpo na Yawe, Mokonzi ya mampinga, na mokili ya Ejipito. Tango bakoganga epai na Yawe likolo na banyokoli na bango, akotindela bango mobikisi mpe mobundeli, mpe akobikisa bango.
21 The LORD will be known to Egypt, and the Egyptians will know the LORD in that day. Yes, they will worship with sacrifice and offering, and will vow a vow to the LORD, and will perform it.
Boye, Yawe akomimonisa epai na bato ya Ejipito. Mpe na mokolo wana, bato ya Ejipito bakoyeba Yawe, bakogumbamela Ye na bambeka mpe na makabo ya bambuma; bakolapa ndayi na Kombo na Yawe mpe bakokokisa yango.
22 The LORD will strike Egypt, striking and healing. They will return to the LORD, and he will be entreated by them, and will heal them.
Kasi Yawe akobeta Ejipito na nzela ya bitumbu, akobeta yango mpe akobikisa yango. Bakozonga epai na Yawe, bongo akoyanola na kolela na bango mpe akobikisa bango.
23 In that day there will be a highway out of Egypt to Assyria, and the Assyrian shall come into Egypt, and the Egyptian into Assyria; and the Egyptians will worship with the Assyrians.
Na mokolo wana, bakopasola nzela moko wuta na Ejipito kino na Asiri. Bato ya Asiri bakokoma koya na Ejipito, mpe bato ya Ejipito bakokoma koya na Asiri. Bato ya Ejipito mpe bato ya Asiri bakokoma kosala elongo losambo mpo na Yawe.
24 In that day, Israel will be the third with Egypt and with Assyria, a blessing within the earth;
Na mokolo wana, Isalaele akozala ekolo ya misato, sima na Ejipito mpe Asiri, lipamboli oyo Nzambe akomema na mokili.
25 because the LORD of Armies has blessed them, saying, “Blessed be Egypt my people, Assyria the work of my hands, and Israel my inheritance.”
Yawe, Mokonzi ya mampinga, akopambola bango na maloba oyo: « Tika ete bopambolama: Ejipito, bato na Ngai; Asiri, misala ya maboko na Ngai, mpe Isalaele, libula na Ngai! »

< Isaiah 19 >