< Luke 11 >

1 When he finished praying in a certain place, one of his disciples said to him, “Lord, teach us to pray, just as John also taught his disciples.”
Mokolo moko, Yesu azalaki kosambela na esika songolo. Tango asilisaki kosambela, moko kati na bayekoli na Ye alobaki na Ye: — Nkolo, lakisa biso kosambela ndenge Yoane alakisaki bayekoli na ye.
2 He said to them, “When you pray, say, ‘Our Father in heaven, may your name be kept holy. May your Kingdom come. May your will be done on earth, as it is in heaven.
Yesu alobaki na bango: — Tango bozali kosambela, boloba: Tata, tika ete Kombo na Yo ebulisama, tika ete Bokonzi na Yo eya!
3 Give us day by day our daily bread.
Pesa biso bilei oyo tosengeli na yango, mokolo na mokolo,
4 Forgive us our sins, for we ourselves also forgive everyone who is indebted to us. Bring us not into temptation, but deliver us from the evil one.’”
limbisa masumu na biso, pamba te biso mpe tolimbisaka moto nyonso oyo asalaka biso mabe; mpe komema biso na komekama te.
5 He said to them, “Which of you, if you go to a friend at midnight and tell him, ‘Friend, lend me three loaves of bread,
Alobaki na bango lisusu: — Soki moko kati na bino azali na molingami, bongo akei epai na ye na midi ya butu mpe alobi: « Molingami, defisa ngai mapa misato;
6 for a friend of mine has come to me from a journey, and I have nothing to set before him,’
pamba te moko kati na baninga na ngai azali kosala mobembo mpe akomi epai na ngai, kasi nazangi bilei ya kopesa ye. »
7 and he from within will answer and say, ‘Don’t bother me. The door is now shut, and my children are with me in bed. I can’t get up and give it to you’?
Soki molingami oyo, wuta kati na ndako na ye, azongisi: « Kotungisa ngai te, nasili kokanga ekuke ya ndako na ngai; ngai mpe bana na ngai tolali, nakoki kolamuka te mpo na kopesa yo mapa. »
8 I tell you, although he will not rise and give it to him because he is his friend, yet because of his persistence, he will get up and give him as many as he needs.
Nazali koloba na bino penza ya solo: ata soki akotelema te mpo na kopesa ye mapa yango, kasi akotelema penza mpo na motungisi na ye mpe akopesa ye nyonso oyo azali na yango na bosenga, pamba te azali moninga na ye.
9 “I tell you, keep asking, and it will be given you. Keep seeking, and you will find. Keep knocking, and it will be opened to you.
Boye, Ngai nazali koloba na bino: Bosenga, mpe bakopesa bino; boluka, mpe bokomona; bobeta ekuke, mpe bakofungolela bino.
10 For everyone who asks receives. He who seeks finds. To him who knocks it will be opened.
Pamba te moto nyonso oyo asengaka azwaka, moto oyo alukaka amonaka; mpe moto oyo abetaka ekuke, bafungolelaka ye yango.
11 “Which of you fathers, if your son asks for bread, will give him a stone? Or if he asks for a fish, he won’t give him a snake instead of a fish, will he?
Nani kati na bino, batata, akopesa na mwana na ye nyoka soki asengi ye mbisi,
12 Or if he asks for an egg, he won’t give him a scorpion, will he?
to akopesa ye koto soki asengi ye liki?
13 If you then, being evil, know how to give good gifts to your children, how much more will your heavenly Father give the Holy Spirit to those who ask him?”
Bongo soki bino bato oyo bozali kutu mabe boyebi kopesa na bana na bino biloko ya malamu, ndenge nini Tata oyo azali na Likolo apesa te Molimo Mosantu epai ya bato oyo basengaka Ye!
14 He was casting out a demon, and it was mute. When the demon had gone out, the mute man spoke; and the multitudes marvelled.
Mokolo moko, Yesu azalaki kobengana molimo mabe oyo ezalaki kopekisa moto koloba. Tango molimo mabe yango ebimaki, moto oyo azalaki koloba te akomaki koloba, mpe ebele ya bato bakamwaki.
15 But some of them said, “He casts out demons by Beelzebul, the prince of the demons.”
Kasi bamoko kati na bango balobaki: — Azali kobengana milimo mabe na nguya ya Belizebule, mokonzi ya milimo mabe.
16 Others, testing him, sought from him a sign from heaven.
Bamosusu, mpo na komeka Yesu, basengaki na Ye elembo moko kowuta na Likolo.
17 But he, knowing their thoughts, said to them, “Every kingdom divided against itself is brought to desolation. A house divided against itself falls.
Lokola Yesu ayebaki makanisi na bango, alobaki na bango: — Bokonzi nyonso oyo ekabwani mpe ekomi komibundisa ekomipanza, mpe ndako oyo ekabwani mpe ekomi komibundisa ekokweya.
18 If Satan also is divided against himself, how will his kingdom stand? For you say that I cast out demons by Beelzebul.
Soki Satana akomi komibundisa, bokonzi na ye ekotelema ndenge nini? Nalobi bongo mpo bolobi ete Ngai nazali kobengana milimo mabe na nguya ya Belizebule.
19 But if I cast out demons by Beelzebul, by whom do your children cast them out? Therefore they will be your judges.
Mpe soki Ngai nazali kobengana milimo mabe na nguya ya Belizebule, bayekoli na bino babenganaka yango na nguya ya nani? Mpo na yango, bayekoli na bino bakozala bango moko basambisi na bino.
20 But if I by God’s finger cast out demons, then God’s Kingdom has come to you.
Kasi soki ezali na nguya ya Nzambe nde Ngai nazali kobengana milimo mabe, wana Bokonzi ya Nzambe esili kokoma kino epai na bino.
21 “When the strong man, fully armed, guards his own dwelling, his goods are safe.
Tango elombe oyo alata bibundeli akengelaka ndako na ye, biloko na ye ebatelamaka malamu;
22 But when someone stronger attacks him and overcomes him, he takes from him his whole armour in which he trusted, and divides his plunder.
kasi soki moto mosusu oyo aleki ye na makasi ayei kobundisa ye mpe alongi ye, akobotola ye bibundeli oyo azalaki kotiela motema, akokamata biloko na ye nyonso mpe akokaba yango.
23 “He who is not with me is against me. He who doesn’t gather with me scatters.
Moto oyo azali elongo na Ngai te azali monguna na Ngai, mpe moto oyo asangisaka te elongo na Ngai apanzaka.
24 The unclean spirit, when he has gone out of the man, passes through dry places, seeking rest; and finding none, he says, ‘I will turn back to my house from which I came out.’
Soki molimo mabe ebimi kati na moto, ekendaka koyengayenga na bisika ekawuka mpo na koluka esika ya kopema. Kasi soki ezwi esika yango te, emilobelaka: « Eleki malamu mpo na ngai kozonga na ndako oyo natikaki. »
25 When he returns, he finds it swept and put in order.
Tango molimo mabe yango ezongaka, ekutaka ndako yango polele, bakombola mpe babongisa malamu.
26 Then he goes and takes seven other spirits more evil than himself, and they enter in and dwell there. The last state of that man becomes worse than the first.”
Bongo ekendaka lisusu kozwa milimo mosusu sambo oyo eleki yango na mabe, mpe, elongo na yango, ekotaka mpe evandaka kuna. Boye bomoi ya moto yango ekomaka lisusu mabe, koleka ndenge ezalaki liboso.
27 It came to pass, as he said these things, a certain woman out of the multitude lifted up her voice and said to him, “Blessed is the womb that bore you, and the breasts which nursed you!”
Wana Yesu azalaki koloba makambo oyo, mwasi moko agangaki wuta kati na ebele ya bato: — Esengo na mama oyo abotaki Yo mpe amelisaki Yo mabele!
28 But he said, “On the contrary, blessed are those who hear the word of God, and keep it.”
Yesu azongisaki: — Esengo nde na bato oyo bayokaka Liloba na Nzambe mpe batosaka yango!
29 When the multitudes were gathering together to him, he began to say, “This is an evil generation. It seeks after a sign. No sign will be given to it but the sign of Jonah the prophet.
Lokola bato bazalaki kotonda se kotonda pembeni na Ye, Yesu alobaki: — Bato ya ekeke oyo bazali bato mabe penza! Bazali kosenga elembo! Bakopesamela elembo mosusu te, longola kaka elembo ya Yona;
30 For even as Jonah became a sign to the Ninevites, so the Son of Man will also be to this generation.
pamba te, ndenge Yona azalaki elembo mpo na bato ya Ninive, ndenge wana mpe Mwana na Moto akozala elembo mpo na bato ya ekeke oyo.
31 The Queen of the South will rise up in the judgement with the men of this generation and will condemn them, for she came from the ends of the earth to hear the wisdom of Solomon; and behold, one greater than Solomon is here.
Na mokolo ya kosambisama, mwasi mokonzi ya sude akolamuka, elongo na bato ya ekeke oyo, mpe akokatela bango etumbu, pamba te awutaki mosika, na suka ya mokili, mpo na koyoka bwanya ya Salomo; nzokande awa sik’oyo, ezali na Moto oyo aleki Salomo.
32 The men of Nineveh will stand up in the judgement with this generation, and will condemn it, for they repented at the preaching of Jonah; and behold, one greater than Jonah is here.
Na mokolo ya kosambisama, bato ya Ninive bakotelema, elongo na bato ya ekeke oyo, mpe bakokatela bango etumbu, pamba te babongolaki mitema na bango tango bayokaki mateya ya Yona; nzokande awa sik’oyo, ezali na Moto oyo aleki Yona.
33 “No one, when he has lit a lamp, puts it in a cellar or under a basket, but on a stand, that those who come in may see the light.
Moto moko te apelisaka mwinda mpo na kotia yango na esika ya kobombama to na se ya katini. Nzokande, batiaka yango na likolo ya etelemiselo ya minda mpo ete bato oyo bazali kokota na ndako bamona pole.
34 The lamp of the body is the eye. Therefore when your eye is good, your whole body is also full of light; but when it is evil, your body also is full of darkness.
Miso na yo ezali lokola mwinda ya nzoto na yo. Soki miso na yo ezali malamu, nzoto na yo mobimba mpe ezali kati na pole. Kasi soki ebeli, nzoto na yo mobimba mpe ekoti kati na molili.
35 Therefore see whether the light that is in you isn’t darkness.
Yango wana, sala keba ete pole oyo ezali kati na yo ekoma molili te.
36 If therefore your whole body is full of light, having no part dark, it will be wholly full of light, as when the lamp with its bright shining gives you light.”
Soki nzoto na yo mobimba ezali kati na pole, mpe eteni ata moko te ezali kati na molili, nzoto na yo mobimba ekotonda na pole lokola tango mwinda engengisaka yo na nzela ya pole na yango.
37 Now as he spoke, a certain Pharisee asked him to dine with him. He went in and sat at the table.
Tango Yesu asilisaki koloba, Mofarizeo moko abengisaki Ye mpo ete akende kolia elongo na ye. Yesu akotaki na ndako na ye mpe avandaki na mesa.
38 When the Pharisee saw it, he marvelled that he had not first washed himself before dinner.
Kasi Mofarizeo akamwaki mingi tango amonaki ete Yesu asukoli maboko te liboso ya kolia.
39 The Lord said to him, “Now you Pharisees cleanse the outside of the cup and of the platter, but your inward part is full of extortion and wickedness.
Bongo, Nkolo alobaki na ye: — Bino Bafarizeo, bosukolaka libanda ya bakopo mpe ya basani, kasi botondi na moyibi mpe na mabe.
40 You foolish ones, didn’t he who made the outside make the inside also?
Bazoba! Boni, ye oyo asalaki libanda, asalaki mpe kati te?
41 But give for gifts to the needy those things which are within, and behold, all things will be clean to you.
Bobonza nde bomoto na bino ya kati lokola likabo epai ya Nzambe, bongo mobimba na bino ekokoma mbala moko peto.
42 But woe to you Pharisees! For you tithe mint and rue and every herb, but you bypass justice and God’s love. You ought to have done these, and not to have left the other undone.
Mawa na bino, Bafarizeo! Bofutaka eteni ya zomi ya bandembi, ya matungulu mpe ya bandunda ya lolenge nyonso, kasi bomonaka pamba bosembo mpe bolingo ya Nzambe. Nzokande bosengeli nde kotia yango na misala, mpe kozwa na motuya likambo oyo wana ya kofuta eteni ya zomi.
43 Woe to you Pharisees! For you love the best seats in the synagogues and the greetings in the marketplaces.
Mawa na bino, Bafarizeo! Bolingaka kovanda na bakiti ya liboso, kati na bandako ya mayangani; mpe bolingaka ete bato bapesa bino mbote ya lokumu, na bisika oyo bato ebele bakutanaka.
44 Woe to you, scribes and Pharisees, hypocrites! For you are like hidden graves, and the men who walk over them don’t know it.”
Mawa na bino! Bozali lokola bakunda oyo ezanga bilembo, bongo bato batambolaka na likolo na yango na kozanga koyeba!
45 One of the lawyers answered him, “Teacher, in saying this you insult us also.”
Molakisi moko ya mibeko alobaki na Yesu: — Moteyi, tango ozali koloba bongo, ozali kofinga mpe biso!
46 He said, “Woe to you lawyers also! For you load men with burdens that are difficult to carry, and you yourselves won’t even lift one finger to help carry those burdens.
Yesu azongisaki: — Bino mpe balakisi ya Mobeko, mawa na bino! Bomemisaka bato mikumba ya kilo makasi, mpe bino moko boningisaka ata mosapi moko te mpo na kosunga bango.
47 Woe to you! For you build the tombs of the prophets, and your fathers killed them.
Mawa na bino, pamba te botongaka bakunda mpo na basakoli oyo bakoko na bino baboma!
48 So you testify and consent to the works of your fathers. For they killed them, and you build their tombs.
Boye, wana bosalaka bongo, botatolaka ete bondimi makambo oyo bakoko na bino basala; pamba te bango, baboma basakoli, mpe bino, bozali kotonga bakunda na bango.
49 Therefore also the wisdom of God said, ‘I will send to them prophets and apostles; and some of them they will kill and persecute,
Yango wana, Nzambe, kati na bwanya na Ye, aloba: « Nakotindela bango basakoli mpe bantoma; bakoboma bamoko, mpe bakonyokola bamosusu. »
50 that the blood of all the prophets, which was shed from the foundation of the world, may be required of this generation,
Mpo na yango, makila ya basakoli nyonso, oyo basopa wuta na ebandeli ya mokili, ekotangama na mito ya bato ya ekeke oyo,
51 from the blood of Abel to the blood of Zachariah, who perished between the altar and the sanctuary.’ Yes, I tell you, it will be required of this generation.
kobanda na makila ya Abele kino na makila ya Zakari oyo babomaki kati na etumbelo mpe Esika ya bule. Nazali koloba na bino penza ya solo: mokumba ya mabe wana nyonso ekokweyela bato ya ekeke oyo.
52 Woe to you lawyers! For you took away the key of knowledge. You didn’t enter in yourselves, and those who were entering in, you hindered.”
Mawa na bino, balakisi ya Mobeko, pamba te bolongolaki fungola ya boyebi! Bino moko bokotaki te, mpe bopekisaki bato oyo bazalaki na posa ya kokota.
53 As he said these things to them, the scribes and the Pharisees began to be terribly angry, and to draw many things out of him,
Tango Yesu abimaki na ndako, Bafarizeo mpe balakisi ya Mobeko basilikelaki Ye makasi mpe bakomaki kotungisa Ye na nzela ya mituna ya ndenge na ndenge,
54 lying in wait for him, and seeking to catch him in something he might say, that they might accuse him.
na kotiela Ye mitambo mpo na kozwa, kati na maloba na Ye, likambo ya kofunda Ye.

< Luke 11 >