< Judges 1 >

1 After the death of Joshua, the children of Israel asked of the LORD, saying, “Who should go up for us first against the Canaanites, to fight against them?”
Sima na kufa ya Jozue, bana ya Isalaele batunaki Yawe: — Libota nini kati na biso ekokende liboso mpo na kobundisa bato ya Kanana?
2 The LORD said, “Judah shall go up. Behold, I have delivered the land into his hand.”
Yawe azongisaki: — Libota ya Yuda nde ekokende liboso, pamba te napesi mokili oyo na maboko na bango.
3 Judah said to Simeon his brother, “Come up with me into my lot, that we may fight against the Canaanites; and I likewise will go with you into your lot.” So Simeon went with him.
Bongo bato ya libota ya Yuda balobaki na bandeko na bango ya libota ya Simeoni: — Boya elongo na biso mpo ete tobundisa bato ya Kanana, mpo na eteni ya mabele oyo epesamelaki biso. Bongo, biso mpe tokokende elongo na bino, na eteni ya mabele na bino. Boye, bato ya libota ya Simeoni bakendeki elongo na bango.
4 Judah went up, and the LORD delivered the Canaanites and the Perizzites into their hand. They struck ten thousand men in Bezek.
Tango libota ya Yuda ekotaki na bitumba, Yawe akabaki bato ya Kanana mpe ya Perizi na maboko na bango, mpe babomaki bato nkoto zomi, na Bezeki.
5 They found Adoni-Bezek in Bezek, and they fought against him. They struck the Canaanites and the Perizzites.
Ezalaki kuna nde bakutaki Adoni-Bezeki mpe babundisaki ye. Balongaki bato ya Kanana mpe ya Perizi.
6 But Adoni-Bezek fled. They pursued him, caught him, and cut off his thumbs and his big toes.
Adoni-Bezeki akimaki; kasi balandaki ye mpe bakangaki ye, bakataki ye misapi ya minene ya maboko mpe ya makolo.
7 Adoni-Bezek said, “Seventy kings, having their thumbs and their big toes cut off, scavenged under my table. As I have done, so God has done to me.” They brought him to Jerusalem, and he died there.
Adoni-Bezeki alobaki: « Bakonzi tuku sambo, oyo bakata bango misapi ya minene ya maboko mpe ya makolo, bazalaki kolokota biloko oyo ezalaki kokweya na se ya mesa na ngai. Sik’oyo, Nzambe azongiseli ngai makambo oyo nasalaki baninga. » Bamemaki ye na Yelusalemi, mpe akufaki kuna.
8 The children of Judah fought against Jerusalem, took it, struck it with the edge of the sword, and set the city on fire.
Bato ya libota ya Yuda babundisaki Yelusalemi mpe babotolaki yango; babomaki bato ya engumba yango na mopanga mpe batiaki yango moto.
9 After that, the children of Judah went down to fight against the Canaanites who lived in the hill country, and in the South, and in the lowland.
Sima na yango, bato ya libota ya Yuda bakendeki kobundisa bato ya Kanana oyo bazalaki kovanda na mokili ya bangomba, na Negevi, mpe na etando oyo ezalaki pembeni ya ebale.
10 Judah went against the Canaanites who lived in Hebron. (The name of Hebron before that was Kiriath Arba.) They struck Sheshai, Ahiman, and Talmai.
Bato ya libota ya Yuda babundisaki lisusu bato ya Kanana oyo bazalaki kovanda na Ebron, oyo kombo na yango ezalaki na kala « Kiriati-Ariba. » Balongaki Sheshayi, Ayimani mpe Talimayi.
11 From there he went against the inhabitants of Debir. (The name of Debir before that was Kiriath Sepher.)
Longwa wana, bapusanaki mpe bakendeki kobundisa bavandi ya Debiri oyo kombo na yango ezalaki na kala « Kiriati-Seferi. »
12 Caleb said, “I will give Achsah my daughter as wife to the man who strikes Kiriath Sepher, and takes it.”
Kalebi alobaki: « Nakopesa na libala Akisa, mwana na ngai ya mwasi, epai ya moto nyonso oyo akobundisa mpe akobotola Kiriati-Seferi. »
13 Othniel the son of Kenaz, Caleb’s younger brother, took it, so he gave him Achsah his daughter as his wife.
Otinieli, mwana mobali ya Kenazi, ndeko ya Kalebi, abotolaki yango; boye Kalebi apesaki Akisa, mwana na ye ya mwasi, na libala epai ya Otinieli.
14 When she came, she got him to ask her father for a field. She got off her donkey; and Caleb said to her, “What would you like?”
Nzokande, tango Akisa akomaki na ndako ya Otinieli, atindikaki ye ete asenga elanga epai ya Kalebi, tata na ye. Boye, tango Akisa akitaki wuta na ane na ye, Kalebi atunaki ye: — Olingi nini?
15 She said to him, “Give me a blessing; because you have set me in the land of the South, give me also springs of water.” Then Caleb gave her the upper springs and the lower springs.
Akisa azongisaki: — Salela ngai ngolu. Lokola opesaki ngai eteni ya mabele kati na Negevi, pesa ngai lisusu bitima. Boye, Kalebi apesaki ye bitima ya likolo mpe ya se.
16 The children of the Kenite, Moses’ brother-in-law, went up out of the city of palm trees with the children of Judah into the wilderness of Judah, which is in the south of Arad; and they went and lived with the people.
Bakitani ya Keni oyo azalaki bokilo ya Moyize balongwaki na engumba ya banzete ya Mbila elongo na bato ya libota ya Yuda, mpe bakendeki kovanda esika moko na bavandi ya esobe ya Yuda, oyo ezali na sude ya Aradi.
17 Judah went with Simeon his brother, and they struck the Canaanites who inhabited Zephath, and utterly destroyed it. The name of the city was called Hormah.
Bato ya libota ya Yuda elongo na bandeko na bango ya libota ya Simeoni bakendeki kobundisa bato ya Kanana oyo bazalaki kovanda na Tsefati, mpe babebisaki bango. Yango wana, bapesaki engumba yango kombo « Orima. »
18 Also Judah took Gaza with its border, and Ashkelon with its border, and Ekron with its border.
Bato ya libota ya Yuda babotolaki lisusu Gaza, Ashikeloni mpe Ekroni, elongo na mabele na yango ya pembeni.
19 The LORD was with Judah, and drove out the inhabitants of the hill country; for he could not drive out the inhabitants of the valley, because they had chariots of iron.
Yawe azalaki elongo na bato ya libota ya Yuda. Babotolaki mokili ya bangomba, kasi balongaki te kobengana bavandi ya etando, pamba te bazalaki na bashar ya bibende.
20 They gave Hebron to Caleb, as Moses had said, and he drove the three sons of Anak out of there.
Kolanda ndenge Moyize alobaki, bapesaki na Kalebi engumba Ebron. Mpe Kalebi abenganaki na Ebron bana mibali misato ya Anaki.
21 The children of Benjamin didn’t drive out the Jebusites who inhabited Jerusalem, but the Jebusites dwell with the children of Benjamin in Jerusalem to this day.
Nzokande, bato ya libota ya Benjame babenganaki te bato ya Yebusi oyo bazalaki kovanda na Yelusalemi. Boye, kino na mokolo ya lelo, bato ya Yebusi bavandaka esika moko na bato ya libota ya Benjame.
22 The house of Joseph also went up against Bethel, and the LORD was with them.
Bato kati na ndako ya Jozefi bamataki mpo na kobundisa Beteli, mpe Yawe azalaki elongo na bango.
23 The house of Joseph sent to spy out Bethel. (The name of the city before that was Luz.)
Tango libota ya Jozefi etindaki bato ete bakende kononga engumba Beteli oyo bazalaki kobenga na kala Luze,
24 The watchers saw a man come out of the city, and they said to him, “Please show us the entrance into the city, and we will deal kindly with you.”
banongi bamonaki moto moko kobima na engumba mpe balobaki na ye: « Lakisa biso esika nini tokoki kokotela na kati ya engumba, mpe tokosalela yo bolamu. »
25 He showed them the entrance into the city, and they struck the city with the edge of the sword; but they let the man and all his family go.
Boye, alakisaki bango esika ya kokotela na kati na engumba. Mpe babomaki bato ya engumba yango na mopanga, kasi babikisaki moto wana elongo na libota na ye mobimba.
26 The man went into the land of the Hittites, built a city, and called its name Luz, which is its name to this day.
Moto yango akendeki na mokili ya bato ya Iti mpe atongaki kuna engumba oyo apesaki kombo « Luze » oyo etikala kino lelo.
27 Manasseh didn’t drive out the inhabitants of Beth Shean and its towns, nor Taanach and its towns, nor the inhabitants of Dor and its towns, nor the inhabitants of Ibleam and its towns, nor the inhabitants of Megiddo and its towns; but the Canaanites would dwell in that land.
Kasi bato ya libota ya Manase babenganaki te bato ya Beti-Sheani mpe bamboka na yango ya mike, bato ya Taanaki mpe bamboka na yango ya mike, bato ya Dori mpe bamboka na yango ya mike, bato ya Yibileayimi mpe bamboka na yango ya mike, bato ya Megido mpe bamboka na yango ya mike; pamba te bato ya Kanana batingamaki kaka kovanda na mokili yango.
28 When Israel had grown strong, they put the Canaanites to forced labor, and didn’t utterly drive them out.
Tango bana ya Isalaele bakomaki lisusu makasi, bakomaki kosalisa bato ya Kanana misala makasi, kasi babenganaki bango nyonso te.
29 Ephraim didn’t drive out the Canaanites who lived in Gezer, but the Canaanites lived in Gezer among them.
Bato ya libota ya Efrayimi babenganaki te bato ya Kanana oyo bazalaki kovanda na Gezeri, mpe bato ya Kanana bakobaki kovanda esika moko na bango.
30 Zebulun didn’t drive out the inhabitants of Kitron, nor the inhabitants of Nahalol; but the Canaanites lived among them, and became subject to forced labor.
Bato ya libota ya Zabuloni babenganaki te bavandi ya Kitroni mpe ya Naaloli. Bato ya Kanana bakobaki kovanda esika moko na bango, kasi bakomaki kosalisa bango misala makasi.
31 Asher didn’t drive out the inhabitants of Acco, nor the inhabitants of Sidon, nor of Ahlab, nor of Achzib, nor of Helbah, nor of Aphik, nor of Rehob;
Bato ya libota ya Aseri babenganaki te bato ya Ako, ya Sidoni, ya Ayilabi, ya Akizibi, ya Eliba, ya Afiki mpe ya Reobi.
32 but the Asherites lived among the Canaanites, the inhabitants of the land, for they didn’t drive them out.
Likolo na yango, bato ya libota ya Aseri bakomaki kovanda esika moko na bato ya Kanana oyo bazalaki kovanda na mokili yango.
33 Naphtali didn’t drive out the inhabitants of Beth Shemesh, nor the inhabitants of Beth Anath; but he lived among the Canaanites, the inhabitants of the land. Nevertheless the inhabitants of Beth Shemesh and of Beth Anath became subject to forced labor.
Bato ya libota ya Nefitali babenganaki te bato oyo bazalaki kovanda na Beti-Shemeshi mpe na Beti-Anati. Boye, bakomaki kovanda esika moko na bato ya Kanana oyo bazalaki kovanda na mokili yango; kasi bato ya Beti-Shemeshi mpe ya Beti-Anati bakomaki kosala misala makasi.
34 The Amorites forced the children of Dan into the hill country, for they would not allow them to come down to the valley;
Bato ya Amori batindikaki libota ya Dani mosika, na likolo ya bangomba, mpo ete balonga te kokita na etando ya polele.
35 but the Amorites would dwell in Mount Heres, in Aijalon, and in Shaalbim. Yet the hand of the house of Joseph prevailed, so that they became subject to forced labor.
Boye, bato ya Amori mpe batingamaki kaka kovanda na Ari-Eresi, na Ayaloni mpe na Shaalibimi. Kasi tango ndako ya Jozefi ekomaki lisusu na nguya, bakomaki kosalisa bango misala makasi.
36 The border of the Amorites was from the ascent of Akrabbim, from the rock, and upward.
Mondelo ya mabele ya bato ya Amori ezalaki longwa na Libanga ya Sela, elekaki na bangomba ya Akarabimi kino na likolo.

< Judges 1 >