< Matthew 18 >

1 In that hour the disciples came to Jesus, saying, “Who then is greatest in the Kingdom of Heaven?”
Na tango wana, bayekoli bapusanaki pene ya Yesu mpe batunaki Ye: — Nani aleki monene kati na Bokonzi ya Likolo?
2 Jesus called a little child to himself, and set him in the middle of them
Yesu abengaki mwana moko ya moke, atiaki ye na kati-kati na bango
3 and said, “Most certainly I tell you, unless you turn and become as little children, you will in no way enter into the Kingdom of Heaven.
mpe alobaki: — Nazali koloba na bino penza ya solo: soki bobongwani te mpe bokomi te lokola bana mike, bokotikala kokota te na Bokonzi ya Likolo.
4 Whoever therefore humbles himself as this little child is the greatest in the Kingdom of Heaven.
Yango wana, moto nyonso oyo akomikitisa lokola mwana oyo, ye nde aleki monene kati na Bokonzi ya Likolo.
5 Whoever receives one such little child in my name receives me,
Moto nyonso oyo, na Kombo na Ngai, akoyamba mwana lokola oyo, ayambi nde Ngai moko.
6 but whoever causes one of these little ones who believe in me to stumble, it would be better for him if a huge millstone were hung around his neck and that he were sunk in the depths of the sea.
Kasi soki moto moko akweyisi na masumu moko kati na bana mike oyo bandimelaka Ngai, ekoleka malamu mpo na ye kokanga ye libanga monene ya enikelo na kingo mpe kobwaka ye na ebale.
7 “Woe to the world because of occasions of stumbling! For it must be that the occasions come, but woe to that person through whom the occasion comes!
Mawa na mokili, pamba te makambo oyo ekweyisaka bato kati na masumu ezali ebele! Solo, makambo yango esengeli kaka kozala; kasi mawa na moto oyo, na nzela na ye, makambo yango eyaka!
8 If your hand or your foot causes you to stumble, cut it off and cast it from you. It is better for you to enter into life maimed or crippled, rather than having two hands or two feet to be cast into the eternal fire. (aiōnios g166)
Soki loboko to lokolo na yo ekweyisaka yo na masumu, kata mpe bwaka yango mosika na yo; pamba te eleki malamu mpo na yo kokota kati na bomoi, na loboko moko to na lokolo moko, na esika ete otikala na maboko mibale to makolo mibale mpe obwakama na moto ya libela na libela. (aiōnios g166)
9 If your eye causes you to stumble, pluck it out and cast it from you. It is better for you to enter into life with one eye, rather than having two eyes to be cast into the Gehenna of fire. (Geenna g1067)
Soki liso na yo ekweyisaka yo na masumu, longola yango mpe bwaka yango mosika na yo; pamba te eleki malamu mpo na yo kokota kati na bomoi, na liso moko, na esika ete okoba kozala na miso mibale mpe obwakama na moto ya lifelo. (Geenna g1067)
10 See that you don’t despise one of these little ones, for I tell you that in heaven their angels always see the face of my Father who is in heaven.
Bosala keba ete botiola ata moko te kati na bana oyo, pamba te nazali koloba na bino ete ba-anjelu na bango kuna na Likolo bamonaka tango nyonso elongi ya Tata na Ngai, oyo azali na Likolo. [
11 For the Son of Man came to save that which was lost.
Pamba te Mwana na Moto ayaki mpo na kobikisa bato oyo babunga nzela.]
12 “What do you think? If a man has one hundred sheep, and one of them goes astray, doesn’t he leave the ninety-nine, go to the mountains, and seek that which has gone astray?
Bokanisi nini? Soki moto moko azali na bameme nkama moko, bongo moko kati na yango ebungi; boni, akotika te bameme na ye tuku libwa na libwa na likolo ya ngomba mpo na kokende koluka moko oyo ewuti kobunga?
13 If he finds it, most certainly I tell you, he rejoices over it more than over the ninety-nine which have not gone astray.
Mpe soki amoni yango, nazali koloba na bino penza ya solo, esengo na ye mpo na meme wana ekoleka esengo mpo na bameme tuku libwa na libwa oyo ebungaki te.
14 Even so it is not the will of your Father who is in heaven that one of these little ones should perish.
Ndenge moko, Tata na bino oyo azali kati na Likolo alingi ete moko te kati na bana oyo abunga.
15 “If your brother sins against you, go, show him his fault between you and him alone. If he listens to you, you have gained back your brother.
Soki ndeko na yo asali yo mabe, kende kotalisa ye mabe na ye na esika ya bino mibale kaka. Soki ayokeli yo, wana ozongisi ye na nzela malamu.
16 But if he doesn’t listen, take one or two more with you, that at the mouth of two or three witnesses every word may be established.
Kasi soki ayokeli yo te, mema moto mosusu to bato mibale, pamba te Bosolo ya likambo nyonso endimamaka na litatoli ya bato mibale to misato.
17 If he refuses to listen to them, tell it to the assembly. If he refuses to hear the assembly also, let him be to you as a Gentile or a tax collector.
Kasi soki aboyi kaka koyokela bango, yebisa makambo yango na Lingomba. Soki aboyi mpe kaka koyokela Lingomba, zwa ye lokola mopagano mpe lokola mofutisi mpako.
18 Most certainly I tell you, whatever things you bind on earth will have been bound in heaven, and whatever things you release on earth will have been released in heaven.
Nazali koloba na bino penza ya solo: nyonso oyo bokokanga awa na mokili ekokangama mpe na Likolo, mpe nyonso oyo bokofungola awa na mokili ekofungwama mpe na Likolo.
19 Again, assuredly I tell you, that if two of you will agree on earth concerning anything that they will ask, it will be done for them by my Father who is in heaven.
Nazali lisusu koloba na bino penza ya solo: soki bato mibale kati na bino bayokani awa na mokili mpo na kosenga eloko songolo to pakala, Tata na Ngai oyo azali kati na Likolo akopesa bango yango.
20 For where two or three are gathered together in my name, there I am in the middle of them.”
Pamba te na esika oyo bato mibale to bato misato basangani na Kombo na Ngai, Ngai mpe nazali wana kati na bango.
21 Then Peter came and said to him, “Lord, how often shall my brother sin against me, and I forgive him? Until seven times?”
Bongo Petelo apusanaki pene ya Yesu mpe atunaki: — Nkolo, mbala boni nasengeli kolimbisa ndeko na ngai tango akosala ngai mabe? Boni, kino mbala sambo?
22 Jesus said to him, “I don’t tell you until seven times, but, until seventy times seven.
Yesu azongisaki: — Nalobi na yo te kino mbala sambo, kasi kino mbala tuku sambo na sambo.
23 Therefore the Kingdom of Heaven is like a certain king who wanted to settle accounts with his servants.
Yango wana, Bokonzi ya Likolo ekokani na mokonzi moko oyo alingaki kobongisa elongo na basali na ye makambo na ye ya misolo.
24 When he had begun to settle, one was brought to him who owed him ten thousand talents.
Tango abandaki, bamemelaki ye mosali moko oyo azalaki na niongo na ye ya batalanta nkoto zomi.
25 But because he couldn’t pay, his lord commanded him to be sold, with his wife, his children, and all that he had, and payment to be made.
Lokola azalaki na eloko moko te mpo na kofuta, mokonzi na ye atindaki ete bateka ye, mwasi na ye, bana na ye mpe biloko na ye nyonso mpo ete niongo na ye efutama.
26 The servant therefore fell down and knelt before him, saying, ‘Lord, have patience with me, and I will repay you all!’
Kasi mosali yango amibwakaki na makolo ya mokonzi, agumbamaki liboso na ye mpe asengaki: « Yikela ngai mpiko, pamba te nakofuta yo niongo nyonso! »
27 The lord of that servant, being moved with compassion, released him and forgave him the debt.
Mokonzi ya mosali ayokelaki ye mawa, alimbisaki niongo na ye mpe atikaki ye kokende.
28 “But that servant went out and found one of his fellow servants who owed him one hundred denarii, and he grabbed him and took him by the throat, saying, ‘Pay me what you owe!’
Kasi tango mosali yango abimaki, akutanaki na moninga na ye ya mosala oyo adefaki epai na ye mbongo ya bibende nkama moko. Akangaki ye, akomaki kofinafina ye na kingo mpe alobaki na ye: « Futa niongo na ngai. »
29 “So his fellow servant fell down at his feet and begged him, saying, ‘Have patience with me, and I will repay you!’
Moninga na ye ya mosala afukamaki mpe asengaki na ye: « Yikela ngai mpiko, nakofuta yo niongo nyonso. »
30 He would not, but went and cast him into prison until he should pay back that which was due.
Kasi ye aboyaki; akendeki kosenga ete babwaka ye na boloko, kino tango akosilisa kofuta niongo nyonso.
31 So when his fellow servants saw what was done, they were exceedingly sorry, and came and told their lord all that was done.
Tango baninga na ye ya mosala bamonaki ndenge makambo elekaki, bayokaki mawa mingi mpe bakendeki koyebisa makambo nyonso epai ya mokonzi na bango.
32 Then his lord called him in and said to him, ‘You wicked servant! I forgave you all that debt because you begged me.
Bongo mokonzi abengaki mosali wana mpe alobaki na ye: « Mosali mabe! Ngai nalimbisaki yo niongo nyonso oyo ozalaki na yango epai na ngai, mpo ete osengaki ngai.
33 Shouldn’t you also have had mercy on your fellow servant, even as I had mercy on you?’
Boni, osengelaki te koyikela moninga na yo mpiko ndenge ngai nasalaki mpo na yo? »
34 His lord was angry, and delivered him to the tormentors until he should pay all that was due to him.
Lokola mokonzi na ye azalaki na kanda, akabaki ye na maboko ya banyokoli kino tango afutaki niongo nyonso.
35 So my heavenly Father will also do to you, if you don’t each forgive your brother from your hearts for his misdeeds.”
Ezali ndenge wana nde Tata na Ngai ya Likolo akosala bino soki moko na moko kati na bino alimbisi te ndeko na ye, na motema na ye mobimba.

< Matthew 18 >