< Exodus 9 >

1 Then the LORD said to Moses, “Go in to Pharaoh, and tell him, ‘This is what the LORD, the God of the Hebrews, says: “Let my people go, that they may serve me.
Yawe alobaki na Moyize: « Kende koyebisa Faraon: ‹ Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Ba-Ebre, alobi: ‘Tika bato na Ngai kokende kogumbamela Ngai!’
2 For if you refuse to let them go, and hold them still,
Soki oboyi kotika bango kokende mpe okobi kokanga bango,
3 behold, the LORD’s hand is on your livestock which are in the field, on the horses, on the donkeys, on the camels, on the herds, and on the flocks with a very grievous pestilence.
loboko na Yawe ekomema mopepe ya bokono ya somo kati na bibwele na yo, oyo ezali na elanga: bampunda, ba-ane, bashamo, bangombe, bameme mpe bantaba.
4 The LORD will make a distinction between the livestock of Israel and the livestock of Egypt; and nothing shall die of all that belongs to the children of Israel.”’”
Kasi Yawe akotia bokeseni kati na bibwele ya bana ya Isalaele mpe ya bato ya Ejipito, pamba te nyama moko te ya bana ya Isalaele ekokufa. › »
5 The LORD appointed a set time, saying, “Tomorrow the LORD shall do this thing in the land.”
Yawe abongisaki tango mpe alobaki: « Lobi, Yawe akokokisa likambo oyo na mokili. »
6 The LORD did that thing on the next day; and all the livestock of Egypt died, but of the livestock of the children of Israel, not one died.
Mpe mokolo oyo elandaki, Yawe akokisaki yango: bibwele nyonso ya bato ya Ejipito ekufaki, kasi ebwele ata moko te ya bana ya Isalaele ekufaki.
7 Pharaoh sent, and, behold, there was not so much as one of the livestock of the Israelites dead. But the heart of Pharaoh was stubborn, and he didn’t let the people go.
Faraon atindaki bato mpo na kolandela likambo oyo mpe bamonaki ete ata ebwele moko te kati na bibwele ya bana ya Isalaele ekufaki. Atako bongo, Faraon ayeisaki lisusu motema na ye makasi mpe aboyaki kaka kotika bato kokende.
8 The LORD said to Moses and to Aaron, “Take handfuls of ashes of the furnace, and let Moses sprinkle it towards the sky in the sight of Pharaoh.
Yawe alobaki na Moyize mpe Aron: « Botondisa maboko na bino na putulu oyo ewuti na fulu ya moto makasi, mpe tika ete Moyize abwaka yango likolo, na miso ya Faraon.
9 It shall become small dust over all the land of Egypt, and shall be boils and blisters breaking out on man and on animal, throughout all the land of Egypt.”
Yango ekopanzana na mokili mobimba ya Ejipito mpe ekobimisa, kati na Ejipito mobimba, na banzoto ya bato mpe ya bibwele, babibon oyo ekokoma bapota ya kopola. »
10 They took ashes of the furnace, and stood before Pharaoh; and Moses sprinkled it up towards the sky; and it became boils and blisters breaking out on man and on animal.
Bazwaki putulu na fulu ya moto mpe batelemaki liboso ya Faraon. Moyize abwakaki yango likolo mpe ebimisaki babibon oyo ekomaki bapota ya kopola na banzoto ya bato mpe ya bibwele.
11 The magicians couldn’t stand before Moses because of the boils; for the boils were on the magicians and on all the Egyptians.
Bato ya soloka bakokaki te kotelema liboso ya Moyize likolo ya bapota oyo ezalaki na banzoto na bango mpe ya bato nyonso ya Ejipito.
12 The LORD hardened the heart of Pharaoh, and he didn’t listen to them, as the LORD had spoken to Moses.
Kasi Yawe akomisaki lisusu motema ya Faraon makasi mpe Faraon ayokelaki te Moyize mpe Aron, ndenge kaka Yawe alobaki yango na Moyize.
13 The LORD said to Moses, “Rise up early in the morning, and stand before Pharaoh, and tell him, ‘This is what the LORD, the God of the Hebrews, says: “Let my people go, that they may serve me.
Yawe alobaki na Moyize: « Lamuka na tongo-tongo, kende kokutana na Faraon mpe loba na ye: ‹ Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Ba-Ebre, alobi: Tika bato na Ngai kokende kogumbamela Ngai.
14 For this time I will send all my plagues against your heart, against your officials, and against your people; that you may know that there is no one like me in all the earth.
Ya mbala oyo, nakotinda mopepe na Ngai nyonso ya bokono epai na yo, epai ya bakalaka na yo mpe epai ya bato na yo, mpo oyeba ete moko te azali lokola Ngai, na mokili mobimba.
15 For now I would have stretched out my hand, and struck you and your people with pestilence, and you would have been cut off from the earth;
Pamba te kino sik’oyo, nakokaki kosembola loboko na Ngai mpe kotindela yo elongo na bato na yo nyonso, mopepe ya bokono oyo ekokaki kolimwisa bino na mokili.
16 but indeed for this cause I have made you stand: to show you my power, and that my name may be declared throughout all the earth,
Kasi natikaki yo na bomoi mpo na tina oyo: kotalisa yo nguya na Ngai mpe kosala ete lokumu ya Kombo na Ngai epanzana na mokili mobimba.
17 because you still exalt yourself against my people, that you won’t let them go.
Lokola ozali kokoba koboya kotika bato na Ngai kokende,
18 Behold, tomorrow about this time I will cause it to rain a very grievous hail, such as has not been in Egypt since the day it was founded even until now.
lobi na ngonga oyo, nakobetisa mvula ya mabanga ya moto makasi, oyo etikala nanu kobeta te wuta mokili ya Ejipito ezala.
19 Now therefore command that all of your livestock and all that you have in the field be brought into shelter. The hail will come down on every man and animal that is found in the field, and isn’t brought home, and they will die.”’”
Sik’oyo, pesa mitindo ete bamema na ebombelo, bibwele na yo mpe biloko nyonso oyo ozali na yango kati na elanga. Pamba te mvula ya mabanga ekokweyela mpe ekoboma moto mpe nyama nyonso oyo bokokotisa kuna te to oyo ekotikala kati na elanga. › »
20 Those who feared the LORD’s word amongst the servants of Pharaoh made their servants and their livestock flee into the houses.
Kati na basali ya Faraon, ba-oyo babangaki Liloba na Yawe bakotisaki na lombangu bawumbu mpe bibwele na bango kati na bandako.
21 Whoever didn’t respect the LORD’s word left his servants and his livestock in the field.
Kasi ba-oyo babangaki te Liloba na Yawe, batikaki bawumbu mpe bibwele na bango kati na elanga.
22 The LORD said to Moses, “Stretch out your hand towards the sky, that there may be hail in all the land of Egypt, on man, and on animal, and on every herb of the field, throughout the land of Egypt.”
Yawe alobaki na Moyize: « Sembola loboko na yo na likolo mpo ete mvula ya mabanga enoka na mokili mobimba ya Ejipito: likolo ya bato, ya bibwele mpe ya matiti nyonso oyo ebotaka na elanga kati na Ejipito. »
23 Moses stretched out his rod towards the heavens, and the LORD sent thunder and hail; and lightning flashed down to the earth. The LORD rained hail on the land of Egypt.
Tango Moyize asembolaki lingenda na ye na likolo, Yawe abetisaki bakake mpe mvula ya mabanga. Bakake ebetaki na mokili. Bongo Yawe anokisaki mvula ya mabanga na mokili ya Ejipito.
24 So there was very severe hail, and lightning mixed with the hail, such as had not been in all the land of Egypt since it became a nation.
Boye mvula ya mabanga mpe bakake ebetaki. Ezalaki mvula moko ya makasi penza oyo etikala nanu kobeta te wuta Ejipito ekoma ekolo.
25 The hail struck throughout all the land of Egypt all that was in the field, both man and animal; and the hail struck every herb of the field, and broke every tree of the field.
Ebomaki, kati na Ejipito, nyonso oyo ezalaki kati na elanga, ezala bato to bibwele; ebebisaki matiti nyonso ya elanga mpe ebukaki banzete nyonso.
26 Only in the land of Goshen, where the children of Israel were, there was no hail.
Kasi enokaki te kati na etuka ya Gosheni epai wapi bana ya Isalaele bazalaki.
27 Pharaoh sent and called for Moses and Aaron, and said to them, “I have sinned this time. The LORD is righteous, and I and my people are wicked.
Faraon abengisaki Moyize mpe Aron, alobaki na bango: — Ya mbala oyo, nasali lisumu. Yawe azali sembo; ngai mpe bato na ngai tosali mabe.
28 Pray to the LORD; for there has been enough of mighty thunderings and hail. I will let you go, and you shall stay no longer.”
Bobondela Yawe mpo ete asilisa mvula ya mabanga mpe bakake. Bongo ngai nakotika bino kokende, mpe bino bokowumela lisusu awa te.
29 Moses said to him, “As soon as I have gone out of the city, I will spread out my hands to the LORD. The thunders shall cease, and there will not be any more hail; that you may know that the earth is the LORD’s.
Moyize azongisaki: — Tango nakobima na engumba, nakotombola maboko na ngai mpo na kobondela Yawe. Bakake ekosila mpe mvula ya mabanga ekonoka lisusu te, mpo ete oyeba ete mokili ezali ya Yawe.
30 But as for you and your servants, I know that you don’t yet fear the LORD God.”
Kasi nayebi ete, yo elongo na bakalaka na yo, bokobanga na bino kaka Yawe Nzambe te.
31 The flax and the barley were struck, for the barley had ripened and the flax was blooming.
Lino mpe Orje ebebaki, pamba te lino ebimisaki mito mpe Orje ebimisaki bafololo.
32 But the wheat and the spelt were not struck, for they had not grown up.
Ble mpe epotele ebebaki te, pamba te tango na yango ya kobota ekokaki nanu te.
33 Moses went out of the city from Pharaoh, and spread out his hands to the LORD; and the thunders and hail ceased, and the rain was not poured on the earth.
Bongo Moyize atikaki Faraon mpe abimaki libanda ya engumba. Atombolaki maboko na ye epai na Yawe; boye bakake mpe mvula ya mabanga etikaki kobeta, mpe mvula esilaki kati na Ejipito.
34 When Pharaoh saw that the rain and the hail and the thunders had ceased, he sinned yet more, and hardened his heart, he and his servants.
Tango Faraon amonaki ete mvula ya mabanga mpe bakake etiki kobeta, asalaki lisusu lisumu. Ye mpe bakalaka na ye bayeisaki lisusu mitema na bango makasi.
35 The heart of Pharaoh was hardened, and he didn’t let the children of Israel go, just as the LORD had spoken through Moses.
Boye motema ya Faraon ekomaki penza makasi mpe aboyaki kotika bana ya Isalaele kokende, ndenge kaka Yawe alobaki na nzela ya Moyize.

< Exodus 9 >