< 1 Samuel 27 >

1 Mais David dit en son cœur: Certes je périrai un jour par les mains de Saul; ne vaut-il pas mieux que je me sauve au pays des Philistins, afin que Saul n'espère plus de [me trouver], en me cherchant encore en quelqu'une des contrées d'Israël? car je me sauverai ainsi de ses mains.
Davidi akanisaki mpe amilobelaki: « Mokolo ezali oyo Saulo akoboma ngai na nzela ya loboko na ye. Boye eleki malamu mpo na ngai kokima na mokili ya bato ya Filisitia. Na bongo nde Saulo akotika koluka ngai kati na Isalaele mobimba, mpe ngai nakokima loboko na ye. »
2 David donc se leva, lui et les six cents hommes qui étaient avec lui, et il passa vers Akis fils de Mahoc, Roi de Gath.
Bongo Davidi elongo na bato nkama motoba oyo bazalaki elongo na ye batelemaki mpe bakendeki epai ya Akishi, mwana mobali ya Maoki, mokonzi ya Gati.
3 Et David demeura avec Akis à Gath, lui et ses gens, chacun avec sa famille, David et ses deux femmes; [savoir] Ahinoham, qui était de Jizréhel, et Abigaïl, [qui avait été] femme de Nabal, lequel était de Carmel.
Davidi mpe bato na ye bavandaki na Gati epai ya Akishi: mobali nyonso azalaki na libota na ye, mpe Davidi azalaki na basi na ye mibale: Ayinoami, moto ya Jizireyeli, mpe Abigayili oyo azalaki liboso mwasi ya Nabali, moto ya Karimeli.
4 Alors on rapporta à Saül que David s'en était fui à Gath; ainsi il ne continua plus de le chercher.
Tango bayebisaki Saulo ete Davidi akimi na Gati, atikaki koluka ye.
5 Or David dit à Akis: Je te prie, si j'ai trouvé grâce devant toi, qu'on me donne quelque lieu dans l'une des villes de la campagne, afin que je demeure là; car pourquoi ton serviteur demeurerait-il dans la ville royale avec toi?
Davidi alobaki na Akishi: « Soki nazwi ngolu na miso na yo, tika ete bapesa ngai esika epai wapi nakoki kovanda kati na moko ya bingumba ya mokili. Mpo na nini mosali na yo avanda na mboka mokonzi elongo na yo? »
6 Akis donc lui donna en ce jour-là Tsiklag; c'est pourquoi Tsiklag est demeurée aux Rois de Juda jusqu'à ce jour.
Na mokolo wana, Akishi apesaki ye engumba ya Tsikilagi. Yango wana Tsikilagi ekoma kino na mokolo ya lelo engumba ya bakonzi ya Yuda.
7 Le nombre des jours que David demeura au pays des Philistins fut un an et quatre mois.
Davidi awumelaki na mokili ya bato ya Filisitia mobu moko mpe sanza minei.
8 Or David montait avec ses gens, et ils faisaient des courses sur les Guesuriens, les Guirziens, et les Hamalécites; car ces [nations]-là habitaient au pays où [elles avaient habité] d'ancienneté, depuis Sur jusqu'au pays d'Egypte.
Na tango wana, Davidi mpe bato na ye bazalaki kobundisa bato ya Geshuri, ya Girizi mpe ya Amaleki; pamba te wuta kala, bato ya bikolo yango bazalaki kovanda na mokili longwa na Shuri kino na Ejipito.
9 Et David désolait ces pays-là, il ne laissait ni homme ni femme en vie, et il prenait les brebis, les bœufs, les ânes, les chameaux, et les vêtements, puis il s'en retournait, et venait vers Akis.
Tango nyonso Davidi azalaki kobundisa mboka moko, azalaki kotika te na bomoi ezala mobali to mwasi. Nzokande azalaki kobotola bameme, bangombe, ba-ane, bashamo mpe bilamba. Bongo azalaki kozonga epai ya Akishi.
10 Et Akis disait: Où avez-vous fait vos courses aujourd'hui? Et David répondait: Vers le Midi de Juda, vers le Midi des Jerahméeliens, et vers le Midi des Kéniens.
Tango Akishi atunaki: — Bobundi wapi lelo? Davidi azongisaki: — Tobundi na sude ya Yuda, na sude ya mokili ya bato ya Yerameeli, mpe na sude ya mokili ya bato ya Keni.
11 Mais David ne laissait en vie ni homme ni femme pour les amener à Gath, de peur, disait-il, qu'ils ne rapportent [quelque chose] contre nous, en disant: Ainsi a fait David. Et il en usa ainsi pendant tous les jours qu'il demeura au pays des Philistins.
Davidi azalaki kotika te ete bamema na Gati, ezala mobali to mwasi, noki te bapanza sango na ye na maloba oyo: « Tala makambo oyo Davidi asalaki. » Davidi azalaki kosala kaka bongo, tango nyonso oyo avandaki na mboka ya bato ya Filisitia.
12 Et Akis croyait David, et disait: Il s'est mis en mauvaise odeur auprès d'Israël son peuple; c'est pourquoi il sera mon serviteur à jamais.
Akishi atielaki Davidi motema mpe alobaki: « Lokola Davidi amiyinisi na miso ya Isalaele, bato na ye, akozala mosali na ngai mpo na libela. »

< 1 Samuel 27 >