< 詩篇 5 >

1 聖歌隊の指揮者によって笛にあわせてうたわせたダビデの歌 主よ、わたしの言葉に耳を傾け、わたしの嘆きに、み心をとめてください。
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi; ezali ya koyemba na flite. Oh Yawe, yoka maloba na ngai, sosola tina ya kolelalela na ngai.
2 わが王、わが神よ、わたしの叫びの声をお聞きください。わたしはあなたに祈っています。
Mokonzi na ngai mpe Nzambe na ngai, yoka koganga na ngai wana nazali kosenga lisungi, pamba te nazali kobondela nde Yo.
3 主よ、朝ごとにあなたはわたしの声を聞かれます。わたしは朝ごとにあなたのためにいけにえを備えて待ち望みます。
Yawe, na tongo, oyokaka mongongo na ngai; na tongo, nabelemaka mpo na kosenga epai na Yo mpe nazelaka.
4 あなたは悪しき事を喜ばれる神ではない。悪人はあなたのもとに身を寄せることはできない。
Pamba te ozali Nzambe te oyo asepelaka na mabe, mpe moto mabe akoki kutu te kovanda elongo na Yo.
5 高ぶる者はあなたの目の前に立つことはできない。あなたはすべて悪を行う者を憎まれる。
Bato ya lolendo bakoki te kotelema liboso na Yo. Oyinaka bato nyonso oyo basalaka mabe.
6 あなたは偽りを言う者を滅ぼされる。主は血を流す者と、人をだます者を忌みきらわれる。
Obomaka bato oyo balobaka lokuta. Yo, Yawe, oyinaka babomi mpe bakosi.
7 しかし、わたしはあなたの豊かないつくしみによって、あなたの家に入り、聖なる宮にむかって、かしこみ伏し拝みます。
Kasi mpo ete bolingo na Yo eleki monene, nakoki kokota kati na Ndako na Yo, nakoki kofukama mpo na botosi epai ya Tempelo na Yo ya bule.
8 主よ、わたしのあだのゆえに、あなたの義をもってわたしを導き、わたしの前にあなたの道をまっすぐにしてください。
Yawe, tambolisa ngai na bosembo na Yo, pamba te nazali na banguna; bongisa nzela oyo olingi ete natambola na yango.
9 彼らの口には真実がなく、彼らの心には滅びがあり、そののどは開いた墓、その舌はへつらいを言うのです。
Minoko na bango elobaka kaka lokuta, mitema na bango etondi na mabe. Minoko na bango ezali lokola bakunda ya kofungwama, mpe bakosaka na nzela ya lolemo na bango.
10 神よ、どうか彼らにその罪を負わせ、そのはかりごとによって、みずから倒れさせ、その多くのとがのゆえに彼らを追いだしてください。彼らはあなたにそむいたからです。
Oh Nzambe, katela bango etumbu. Tika ete mabongisi na bango ebotela bango libebi. Bengana bango mpo na ebele ya masumu na bango, pamba te batombokeli nde Yo.
11 しかし、すべてあなたに寄り頼む者を喜ばせ、とこしえに喜び呼ばわらせてください。また、み名を愛する者があなたによって喜びを得るように、彼らをお守りください。
Kasi tika ete bato nyonso oyo bazwaka Yo lokola ebombamelo na bango bazalaka na esengo tango nyonso, tika ete bayembaka mpo na esengo, bomoi na bango mobimba. Batela bango mpo ete bato oyo balingaka Kombo na Yo basepelaka kati na Yo.
12 主よ、あなたは正しい者を祝福し、盾をもってするように、恵みをもってこれをおおい守られます。
Oh Yawe, solo, opambolaka bato ya sembo mpe ozingelaka bango na nzela ya ngolu na Yo lokola na nzela ya nguba.

< 詩篇 5 >