< ヨハネの福音書 6 >

1 その後、イエスはガリラヤの湖、すなわち、テベリヤの湖の向こう岸へ行かれた。
Sima na yango, Yesu akendeki na ngambo mosusu ya ebale ya Galile oyo babengaka mpe ebale ya Tiberiade.
2 大ぜいの人の群れがイエスにつき従っていた。それはイエスが病人たちになさっていたしるしを見たからである。
Bato ebele bazalaki kolanda Ye mpo ete bazalaki komona bikamwa oyo azalaki kosala na banzoto ya babeli.
3 イエスは山に登り、弟子たちとともにそこにすわられた。
Yango wana Yesu amataki na ngomba mpe avandaki kuna elongo na bayekoli na Ye.
4 さて、ユダヤ人の祭りである過越が間近になっていた。
Nzokande Pasika, feti ya Bayuda, ekomaki pene.
5 イエスは目を上げて、大ぜいの人の群れがご自分のほうに来るのを見て、ピリポに言われた。「どこからパンを買って来て、この人々に食べさせようか。」
Tango Yesu atombolaki miso, amonaki ebele ya bato penza koya epai na Ye; alobaki na Filipo: — Tokosomba mapa wapi mpo na koleisa bato oyo nyonso?
6 もっとも、イエスは、ピリポをためしてこう言われたのであった。イエスは、ご自分では、しようとしていることを知っておられたからである。
Yesu atunaki Filipo motuna oyo mpo na komeka ye mpe kotala soki akoloba nini, pamba te Ye, Yesu, ayebaki makambo oyo alingaki kosala.
7 ピリポはイエスに答えた。「めいめいが少しずつ取るにしても、二百デナリのパンでは足りません。」
Filipo azongiselaki Yesu: — Mapa oyo tokoki kosomba na mbongo ya bibende nkama mibale ekokoka te mpo ete moto moko na moko kati na bango azwa eteni ya lipa!
8 弟子のひとりシモン・ペテロの兄弟アンデレがイエスに言った。
Moko kati na bayekoli na Ye, oyo kombo na ye ezali Andre, ndeko mobali ya Simona Petelo, alobaki na Ye:
9 「ここに少年が大麦のパンを五つと小さい魚を二匹持っています。しかし、こんなに大ぜいの人々では、それが何になりましょう。」
— Ezali awa na elenge mobali moko oyo azali na mapa mitano basala na bambuma ya orje, mpe bambisi mibale; kasi yango ekosala nini mpo na ebele ya bato oyo?
10 イエスは言われた。「人々をすわらせなさい。」その場所には草が多かった。そこで男たちはすわった。その数はおよそ五千人であった。
Yesu apesaki bango mitindo: — Boloba na bato nyonso ete bavanda. Boye, lokola ezalaki na matiti ebele na esika yango, bavandaki. Ezalaki wana na mibali pene nkoto mitano.
11 そこで、イエスはパンを取り、感謝をささげてから、すわっている人々に分けてやられた。また、小さい魚も同じようにして、彼らにほしいだけ分けられた。
Bongo Yesu azwaki mapa yango, azongisaki matondi epai ya Nzambe mpe akabolaki yango epai ya bato oyo bazalaki wana; asalaki mpe bongo na bambisi: bato bazwaki kolanda ndenge posa na bango ezalaki.
12 そして、彼らが十分食べたとき、弟子たちに言われた。「余ったパン切れを、一つもむだに捨てないように集めなさい。」
Sima na bato kolia mpe kotonda, Yesu alobaki na bayekoli na Ye: — Bosangisa biteni oyo etikali mpo ete eteni moko te ebeba.
13 彼らは集めてみた。すると、大麦のパン五つから出て来たパン切れを、人々が食べたうえ、なお余ったもので十二のかごがいっぱいになった。
Basangisaki biteni yango; mpe na biteni ya mapa mitano basala na bambuma ya orje, oyo etikalaki na maboko ya bato oyo baliaki, batondisaki bitunga zomi na mibale.
14 人々は、イエスのなさったしるしを見て、「まことに、この方こそ、世に来られるはずの預言者だ。」と言った。
Tango bato bamonaki bikamwa oyo Yesu awutaki kosala, balobaki: « Azali penza Mosakoli oyo asengelaki koya na mokili. »
15 そこで、イエスは、人々が自分を王とするために、むりやりに連れて行こうとしているのを知って、ただひとり、また山に退かれた。
Kasi, lokola Yesu ayebaki ete bazali na makanisi ya kokamata Ye mpo na kokomisa Ye mokonzi, abendanaki lisusu na ngomba mpo ete azala kaka Ye moko.
16 夕方になって、弟子たちは湖畔に降りて行った。
Tango pokwa ekomaki, bayekoli na Ye bakitaki na ebale
17 そして、舟に乗り込み、カペナウムのほうへ湖を渡っていた。すでに暗くなっていたが、イエスはまだ彼らのところに来ておられなかった。
epai wapi bamataki na bwato moko, bakatisaki ebale mpo na kokende na Kapernawumi, na ngambo mosusu ya ebale. Butu ekotaki, wana Yesu amikomelaki nanu te epai bango bakomaki.
18 湖は吹きまくる強風に荒れ始めた。
Ekumbaki moko ebandaki kopepa, mpe mayi ya ebale etombokaki.
19 こうして、四、五千メートルほどこぎ出したころ、彼らは、イエスが湖の上を歩いて舟に近づいて来られるのを見て、恐れた。
Awa basilaki koluka nkayi na molayi ya bakilometele pene mitano to motoba, bamonaki Yesu kotambola likolo ya mayi ya ebale mpe kopusana pene ya bwato; somo makasi ekangaki bango.
20 しかし、イエスは彼らに言われた。「わたしだ。恐れることはない。」
Kasi Yesu alobaki na bango: « Kimia! Kimia! Bobanga te! Ezali Ngai! »
21 それで彼らは、イエスを喜んで舟に迎えた。舟はほどなく目的の地に着いた。
Balingaki kokotisa Yesu na bwato, kasi, mbala moko, bwato etutaki mabele ya esika oyo bazalaki kokende.
22 その翌日、湖の向こう岸にいた群衆は、そこには小舟が一隻あっただけで、ほかにはなかったこと、また、その舟にイエスは弟子たちといっしょに乗られないで、弟子たちだけが行ったということに気づいた。
Mokolo oyo elandaki, bato oyo batikalaki na ngambo mosusu ya ebale bayaki kokanisa na sima ete ezalaki kaka na bwato moko, mpe ete Yesu akendeki bwato moko te na bayekoli na Ye; bayekoli bakendeki bango moko kaka.
23 しかし、主が感謝をささげられてから、人々がパンを食べた場所の近くに、テベリヤから数隻の小舟が来た。
Nzokande, babwato mosusu ewutaki na Tiberiade mpe ekomaki pene ya esika oyo baliaki mapa sima na Nkolo kozongisa matondi epai ya Nzambe.
24 群衆は、イエスがそこにおられず、弟子たちもいないことを知ると、自分たちもその小舟に乗り込んで、イエスを捜してカペナウムに来た。
Tango bato bamonaki ete, ezala Yesu to bayekoli na Ye, moko te azalaki lisusu wana, bamataki na babwato yango mpe bakendeki koluka Yesu, na Kapernawumi.
25 そして湖の向こう側でイエスを見つけたとき、彼らはイエスに言った。「先生。いつここにおいでになりましたか。」
Tango bakutaki Ye na ngambo mosusu ya ebale, batunaki Ye: — Rabi, okomaki awa tango nini?
26 イエスは答えて言われた。「まことに、まことに、あなたがたに告げます。あなたがたがわたしを捜しているのは、しるしを見たからではなく、パンを食べて満腹したからです。
Yesu azongiselaki bango: — Nazali koloba na bino penza ya solo: soki bozali koluka Ngai, ezali kaka mpo ete boliaki mapa mpe botondaki, kasi ezali te mpo ete bomonaki bikamwa.
27 なくなる食物のためではなく、いつまでも保ち、永遠のいのちに至る食物のために働きなさい。それこそ、人の子があなたがたに与えるものです。この人の子を父すなわち神が認証されたからです。」 (aiōnios g166)
Bosalaka te mpo na bilei oyo ebebaka, kasi bosalaka mpo na bilei oyo ewumelaka mpo na bomoi ya seko, bilei oyo Mwana na Moto akopesa bino; pamba te ezali Ye nde Nzambe Tata abeta kashe. (aiōnios g166)
28 すると彼らはイエスに言った。「私たちは、神のわざを行なうために、何をすべきでしょうか。」
Batunaki Ye lisusu: — Tosengeli kosala nini mpo na kokokisa misala oyo Nzambe azali kozela epai na biso?
29 イエスは答えて言われた。「あなたがたが、神が遣わした者を信じること、それが神のわざです。」
Yesu azongiselaki bango: — Mosala ya Nzambe, yango oyo: bondima Ye oyo Nzambe atindaki.
30 そこで彼らはイエスに言った。「それでは、私たちが見てあなたを信じるために、しるしとして何をしてくださいますか。どのようなことをなさいますか。
Batunaki Ye lisusu: — Elembo nini ya kokamwa okolakisa biso mpo ete tondima Yo? Okosala penza nini?
31 私たちの先祖は、荒野でマナを食べました。『彼は彼らに天からパンを与えて食べさせた。』と書いてあるとおりです。」
Bakoko na biso baliaki mana kati na esobe kolanda ndenge ekomama: « Apesaki bango lipa kowuta na Likolo. »
32 イエスは彼らに言われた。「まことに、まことに、あなたがたに告げます。モーセはあなたがたに天からのパンを与えたのではありません。しかし、わたしの父は、あなたがたに天からまことのパンをお与えになります。
Kasi Yesu azongiselaki bango: — Nazali koloba na bino penza ya solo: ezali Moyize te moto apesaki bino lipa oyo ezalaki kowuta na Likolo, kasi ezali Tata na Ngai nde apesaka bino lipa ya solo oyo ewutaka na Likolo.
33 というのは、神のパンは、天から下って来て、世にいのちを与えるものだからです。」
Pamba te lipa ya Nzambe ezali Ye oyo akiti wuta na Likolo mpe apesaka mokili bomoi.
34 そこで彼らはイエスに言った。「主よ。いつもそのパンを私たちにお与えください。」
Bongo balobaki na Ye: — Nkolo, pesaka biso lipa yango tango nyonso.
35 イエスは言われた。「わたしがいのちのパンです。わたしに来る者は決して飢えることがなく、わたしを信じる者はどんなときにも、決して渇くことがありません。
Yesu azongiselaki bango: — Ngai nazali lipa oyo epesaka bomoi. Moto nyonso oyo akoya epai na Ngai akoyoka lisusu nzala te, mpe moto nyonso oyo akondima Ngai akoyoka lisusu posa ya mayi te.
36 しかし、あなたがたはわたしを見ながら信じようとしないと、わたしはあなたがたに言いました。
Nzokande, ndenge nayebisaki bino, bozali komona Ngai, kasi bozali kondima te.
37 父がわたしにお与えになる者はみな、わたしのところに来ます。そしてわたしのところに来る者を、わたしは決して捨てません。
Bato nyonso oyo Tata apesi Ngai bakoya epai na Ngai, mpe nakobengana soki moke te moto nyonso oyo akoya epai na Ngai.
38 わたしが天から下って来たのは、自分のこころを行なうためではなく、わたしを遣わした方のみこころを行なうためです。
Pamba te soki nakitaki wuta na Likolo, ezali te mpo na kosala mokano na Ngai moko, kasi mpo na kokokisa mokano ya Ye oyo atindaki Ngai.
39 わたしを遣わした方のみこころは、わたしに与えてくださったすべての者を、わたしがひとりも失うことなく、ひとりひとりを終わりの日によみがえらせることです。
Nzokande, Ye oyo atindaki Ngai alingi ete nabungisa ata moto moko te kati na bato oyo apesaki Ngai, kasi nasekwisa bango na mokolo ya suka.
40 事実、わたしの父のみこころは、子を見て信じる者がみな永遠のいのちを持つことです。わたしはその人たちをひとりひとり終わりの日によみがえらせます。」 (aiōnios g166)
Pamba te mokano ya Tata na Ngai ezali ete moto nyonso oyo amoni Mwana mpe andimi Ye azwa bomoi ya seko; mpe, Ngai, nakosekwisa ye na mokolo ya suka. (aiōnios g166)
41 ユダヤ人たちは、イエスが「わたしは天から下って来たパンである。」と言われたので、イエスについてつぶやいた。
Bayuda bakomaki koyimayima na tina na Ye mpo ete alobaki: « Ngai, nazali lipa oyo ekiti wuta na Likolo. »
42 彼らは言った。「あれはヨセフの子で、われわれはその父も母も知っている、そのイエスではないか。どうしていま彼は『わたしは天から下って来た。』と言うのか。」
Bakomaki koloba: — Boni, wana ezali Yesu te? Ezali mwana mobali ya Jozefi te? Toyebi malamu tata mpe mama na ye! Bongo ndenge nini azali koloba: « Nawuti na Likolo? »
43 イエスは彼らに答えて言われた。「互いにつぶやくのはやめなさい。
Yesu azongiselaki bango: — Botika koyimayima kati na bino!
44 わたしを遣わした父が引き寄せられないかぎり、だれもわたしのところに来ることはできません。わたしは終わりの日にその人をよみがえらせます。
Moto moko te akoki koya epai na Ngai soki Tata oyo atindaki Ngai abendi ye te; mpe Ngai, nakosekwisa ye na mokolo ya suka.
45 預言者の書に、『そして、彼らはみな神によって教えられる。』と書かれていますが、父から聞いて学んだ者はみな、わたしのところに来ます。
Tala ndenge ekomama kati na mikanda ya Basakoli: « Nzambe akoteya bango nyonso. » Boye moto nyonso oyo ayokaka Tata mpe ayambaka mateya na Ye ayaka epai na Ngai.
46 だれも神を見た者はありません。ただ神から出た者、すなわち、この者だけが、父を見たのです。
Moto moko te amona Tata, longola kaka Ye oyo ayaki wuta epai ya Nzambe.
47 まことに、まことに、あなたがたに告げます。信じる者は永遠のいのちを持ちます。 (aiōnios g166)
Nazali koloba na bino penza ya solo: moto oyo andimi azali na bomoi ya seko, (aiōnios g166)
48 わたしはいのちのパンです。
pamba te nazali lipa oyo epesaka bomoi.
49 あなたがたの先祖は荒野でマナを食べたが、死にました。
Bakoko na bino baliaki mana kati na esobe mpe bakufaki,
50 しかし、これは天から下って来たパンで、それを食べると死ぬことがないのです。
kasi botala lipa oyo ewuti na Likolo; moto oyo akolia yango akokufa te.
51 わたしは、天から下って来た生けるパンです。だれでもこのパンを食べるなら、永遠に生きます。またわたしが与えようとするパンは、世のいのちのための、わたしの肉です。」 (aiōn g165)
Ngai nde nazali lipa ya bomoi oyo ewuti na Likolo; moto nyonso oyo akolia lipa yango, akozala na bomoi ya seko; mpe lipa oyo nakopesa mpo ete mokili ezwa bomoi ezali nde nzoto na Ngai. (aiōn g165)
52 すると、ユダヤ人たちは、「この人は、どのようにしてその肉を私たちに与えて食べさせることができるのか。」と言って互いに議論し合った。
Tango Bayuda bayokaki bongo, bakomaki kotiana tembe; bazalaki koloba: — Akopesa biso nzoto na ye ndenge nini mpo ete tolia yango?
53 イエスは彼らに言われた。「まことに、まことに、あなたがたに告げます。人の子の肉を食べ、またその血を飲まなければ、あなたがたのうちに、いのちはありません。
Bongo Yesu alobaki na bango: — Nazali koloba na bino penza ya solo: soki bolie nzoto ya Mwana na Moto te mpe bomeli makila na Ye te, bozali na bomoi te kati na bino.
54 わたしの肉を食べ、わたしの血を飲む者は、永遠のいのちを持っています。わたしは終わりの日にその人をよみがえらせます。 (aiōnios g166)
Moto oyo alie nzoto na Ngai mpe ameli makila na Ngai, azali na bomoi ya seko; mpe Ngai, nakosekwisa ye na mokolo ya suka. (aiōnios g166)
55 わたしの肉はまことの食物、わたしの血はまことの飲み物だからです。
Pamba te nzoto na Ngai ezali penza bilei, mpe makila na Ngai ezali penza lokola mayi oyo bamelaka.
56 わたしの肉を食べ、わたしの血を飲む者は、わたしのうちにとどまり、わたしも彼のうちにとどまります。
Moto oyo alie nzoto na Ngai mpe ameli makila na Ngai azali kati na Ngai, mpe Ngai nazali kati na ye.
57 生ける父がわたしを遣わし、わたしが父によって生きているように、わたしを食べる者も、わたしによって生きるのです。
Ndenge Tata oyo atindaki Ngai azali etima ya bomoi mpe Ngai nazali na bomoi na nzela na Ye, ndenge wana mpe moto oyo alie nzoto na Ngai akozala na bomoi na nzela na Ngai.
58 これは、天から下って来たパンです。あなたがたの先祖が食べて死んだようなものではありません。このパンを食べる者は永遠に生きます。」 (aiōn g165)
Tala ndenge lipa oyo ewuti na Likolo ezali: ekokani te na mana oyo bakoko na bino baliaki, kasi bakufaki kaka; nzokande, moto oyo akolia lipa oyo Ngai nazali akozala na bomoi ya seko. (aiōn g165)
59 これは、イエスがカペナウムで教えられたとき、会堂で話されたことである。
Wana nde ezalaki mateya ya Yesu kati na ndako ya mayangani ya Kapernawumi.
60 そこで、弟子たちのうちの多くの者が、これを聞いて言った。「これはひどいことばだ。そんなことをだれが聞いておられようか。」
Sima na koyoka Ye, bayekoli mingi ya Yesu balobaki: — Mateya oyo ezali makasi mingi, nani akoki kondima yango?
61 しかし、イエスは、弟子たちがこうつぶやいているのを、知っておられ、彼らに言われた。「このことであなたがたはつまずくのか。
Yesu asosolaki ete bayekoli na Ye bazalaki koyimayima na tina na yango; alobaki na bango: — Boni, maloba oyo ebetisi bino mabaku?
62 それでは、もし人の子がもといた所に上るのを見たら、どうなるのか。
Bongo ekozala ndenge nini soki bomoni Mwana na Moto kozonga epai Ye azalaki liboso?
63 いのちを与えるのは御霊です。肉は何の益ももたらしません。わたしがあなたがたに話したことばは、霊であり、またいのちです。
Ezali Molimo nde apesaka bomoi; mosuni ezali na eloko te. Maloba oyo nalobi na bino ezali Molimo mpe bomoi.
64 しかし、あなたがたのうちには信じない者がいます。」――イエスは初めから、信じない者がだれであるか、裏切る者がだれであるかを、知っておられたのである。――
Kasi bato mosusu kati na bino bazali kondima te. Solo, wuta na ebandeli, Yesu ayebaki banani bazalaki kondima te, mpe nani akoteka Ye.
65 そしてイエスは言われた。「それだから、わたしはあなたがたに、『父のみこころによるのでないかぎり、だれもわたしのところに来ることはできない。』と言ったのです。」
Alobaki lisusu: — Yango wana nalobaki na bino: « Moto moko te akoki koya epai na Ngai soki epesameli ye te na Tata. »
66 こういうわけで、弟子たちのうちの多くの者が離れ去って行き、もはやイエスとともに歩かなかった。
Banda na tango wana, bayekoli na Ye mingi bazongaki mpe batikaki kolanda Ye.
67 そこで、イエスは十二弟子に言われた。「まさか、あなたがたも離れたいと思うのではないでしょう。」
Boye, Yesu alobaki na bantoma zomi na mibale: — Boni, bino mpe bolingi kokende?
68 すると、シモン・ペテロが答えた。「主よ。私たちがだれのところに行きましょう。あなたは、永遠のいのちのことばを持っておられます。 (aiōnios g166)
Simona Petelo azongisaki: — Nkolo, tokokende epai ya nani? Yo nde ozali na maloba ya bomoi ya seko. (aiōnios g166)
69 私たちは、あなたが神の聖者であることを信じ、また知っています。」
Biso, tondimi mpe toyebi ete ozali Mosantu ya Nzambe.
70 イエスは彼らに答えられた。「わたしがあなたがた十二人を選んだのではありませんか。しかしそのうちのひとりは悪魔です。」
Yesu alobaki na bango: — Boni, ezali Ngai te nde naponaki bino nyonso zomi na mibale? Nzokande, moko kati na bino azali Satana!
71 イエスはイスカリオテ・シモンの子ユダのことを言われたのであった。このユダは十二弟子のひとりであったが、イエスを売ろうとしていた。
Yesu azalaki nde koloba na tina na Yuda, mwana mobali ya Simona Isikarioti, oyo, kati na bantoma zomi na mibale, asengelaki koteka Ye.

< ヨハネの福音書 6 >