< ヨハネの福音書 9 >

1 またイエスは道の途中で、生まれつきの盲人を見られた。
Wana Yesu azalaki kokende, amonaki moto moko akufa miso wuta mbotama na ye.
2 弟子たちは彼についてイエスに質問して言った。「先生。彼が盲目に生まれついたのは、だれが罪を犯したからですか。この人ですか。その両親ですか。」
Bayekoli na Ye batunaki Ye: — Moteyi, nani asalaki masumu mpo ete moto oyo abotama mokufi miso: boni, ezali ye moko to baboti na ye?
3 イエスは答えられた。「この人が罪を犯したのでもなく、両親でもありません。神のわざがこの人に現われるためです。
Yesu azongisaki: — Ezali te mpo na masumu na ye to ya baboti na ye, kasi ezali mpo ete misala ya Nzambe emonisama kati na ye.
4 わたしたちは、わたしを遣わした方のわざを、昼の間に行なわなければなりません。だれも働くことのできない夜が来ます。
Lokola moyi ezali, esengeli na Ngai kosala misala ya Ye oyo atindaki Ngai; butu ezali koya, oyo moto ata moko te akokoka kosala mosala.
5 わたしが世にいる間、わたしは世の光です。」
Wana nazali kati na mokili, nazali pole ya mokili.
6 イエスは、こう言ってから、地面につばきをして、そのつばきで泥を作られた。そしてその泥を盲人の目に塗って言われた。
Sima na Yesu koloba bongo, abwakaki soyi na mabele mpe, na nzela ya soyi na Ye, asalaki potopoto. Bongo apakolaki yango na miso ya mokufi miso
7 「行って、シロアム(訳して言えば、遣わされた者)の池で洗いなさい。」そこで、彼は行って、洗った。すると、見えるようになって、帰って行った。
mpe alobaki na ye: — Kende kosukola na liziba ya Siloe. Mokufi miso akendeki mpe asukolaki. Tango azongaki, abandaki komona.
8 近所の人たちや、前に彼がこじきをしていたのを見ていた人たちが言った。「これはすわって物ごいをしていた人ではないか。」
Bato oyo bazalaki zingazinga na ye mpe ba-oyo bazalaki komona ye kosenga-senga mbongo bakomaki koloba: — Boni, ezali ye te moto oyo azalaki tango nyonso ya kovanda mpo na kosenga-senga mbongo?
9 ほかの人は、「これはその人だ。」と言い、またほかの人は、「そうではない。ただその人に似ているだけだ。」と言った。当人は、「私がその人です。」と言った。
Bamoko bazalaki koloba: — Ezali ye! Bamosusu: — Te, ezali ye te; akokani na ye! Kasi ye moko, mokufi miso, azalaki koloba: — Ezali ngai!
10 そこで、彼らは言った。「それでは、あなたの目はどのようにしてあいたのですか。」
Bongo batunaki ye: — Miso na yo ebikaki ndenge nini?
11 彼は答えた。「イエスという方が、泥を作って、私の目に塗り、『シロアムの池に行って洗いなさい。』と私に言われました。それで、行って洗うと、見えるようになりました。」
Azongiselaki bango: — Moto oyo babengaka Yesu asalaki potopoto, apakolaki ngai yango na miso, bongo alobaki na ngai: « Kende kosukola na Siloe. » Boye, nakendeki, nasukolaki mpe, mbala moko, nakomaki komona.
12 また彼らは彼に言った。「その人はどこにいるのですか。」彼は「私は知りません。」と言った。
Batunaki ye lisusu: — Moto yango azali wapi? Azongisaki: — Nayebi te!
13 彼らは、前に盲目であったその人を、パリサイ人たちのところに連れて行った。
Bamemaki liboso ya Bafarizeo, mokufi miso oyo abikaki.
14 ところで、イエスが泥を作って彼の目をあけられたのは、安息日であった。
Nzokande mokolo oyo Yesu asalaki potopoto mpo na kobikisa miso ya mokufi miso yango ezalaki mokolo ya Saba.
15 こういうわけでもう一度、パリサイ人も彼に、どのようにして見えるようになったかを尋ねた。彼は言った。「あの方が私の目に泥を塗ってくださって、私が洗いました。私はいま見えるのです。」
Yango wana Bafarizeo mpe batunaki ye soki ndenge nini miso na ye ebikaki. Azongiselaki bango: — Atiaki ngai potopoto na miso, nasukolaki mpe nakomi komona.
16 すると、パリサイ人の中のある人々が、「その人は神から出たのではない。安息日を守らないからだ。」と言った。しかし、ほかの者は言った。「罪人である者に、どうしてこのようなしるしを行なうことができよう。」そして、彼らの間に、分裂が起こった。
Kati na Bafarizeo, bamoko balobaki: — Moto oyo awuti epai ya Nzambe te, mpo ete azali kotosa te mokolo ya Saba. Kasi bamosusu balobaki: — Ndenge nini moto ya masumu akoki kozwa bokonzi ya kosala bikamwa ya ndenge wana? Bokabwani ekotaki kati na bango.
17 そこで彼らはもう一度、盲人に言った。「あの人が目をあけてくれたことで、あの人を何だと思っているのか。」彼は言った。「あの方は預言者です。」
Batunaki lisusu mokufi miso: — Bongo yo, olobi nini na tina na ye, pamba te ezali miso na yo nde abikisi? Azongiselaki bango: — Azali mosakoli.
18 しかしユダヤ人たちは、目が見えるようになったこの人について、彼が盲目であったが見えるようになったということを信ぜず、ついにその両親を呼び出して、
Bayuda baboyaki kondima ete azalaki liboso mokufi miso mpe ete abiki. Boye, babengaki baboti na ye
19 尋ねて言った。「この人はあなたがたの息子で、生まれつき盲目だったとあなたがたが言っている人ですか。それでは、どうしていま見えるのですか。」
mpe batunaki bango: — Mobali oyo azali mwana na bino? Boni, abotama solo mokufi miso? Ndenge nini sik’oyo akomi komona?
20 そこで両親は答えた。「私たちは、これが私たちの息子で、生まれつき盲目だったことを知っています。
Baboti na ye bazongisaki: — Toyebi ete azali mwana na biso mpe ete abotama mokufi miso;
21 しかし、どのようにしていま見えるのかは知りません。また、だれがあれの目をあけたのか知りません。あれに聞いてください。あれはもうおとなです。自分のことは自分で話すでしょう。」
kasi mpo na oyo etali koyeba ndenge nini akomi komona sik’oyo mpe nani abikisi ye, toyebi eloko te. Botuna ye moko. Azali mokolo; akoloba na tina na ye moko.
22 彼の両親がこう言ったのは、ユダヤ人たちを恐れたからであった。すでにユダヤ人たちは、イエスをキリストであると告白する者があれば、その者を会堂から追放すると決めていたからである。
Baboti na ye balobaki bongo mpo ete bazalaki kobanga Bayuda, pamba te Bayuda basilaki kozwa mokano ya kobengana, na ndako na bango ya mayangani, moto nyonso oyo akondima ete Yesu azali Klisto.
23 そのために彼の両親は、「あれはもうおとなです。あれに聞いてください。」と言ったのである。
Yango wana baboti na ye bazongisaki: « Botuna ye moko, azali mokolo. »
24 そこで彼らは、盲目であった人をもう一度呼び出して言った。「神に栄光を帰しなさい。私たちはあの人が罪人であることを知っているのだ。」
Bafarizeo babengisaki lisusu, mpo na mbala ya mibale, moto oyo azalaki mokufi miso mpe balobaki na ye: — Pesa Nzambe nkembo na koloba solo; biso toyebi ete moto wana azali moto ya masumu.
25 彼は答えた。「あの方が罪人かどうか、私は知りません。ただ一つのことだけ知っています。私は盲目であったのに、今は見えるということです。」
Azongiselaki bango: — Soki azali moto ya masumu, wana ngai nayebi yango te; kasi ngai nayebi kaka likambo moko: nazalaki mokufi miso, kasi sik’oyo, nakomi komona.
26 そこで彼らは言った。「あの人はおまえに何をしたのか。どのようにしてその目をあけたのか。」
Batunaki ye lisusu: — Asalaki yo nini? Abikisaki miso na yo ndenge nini?
27 彼は答えた。「もうお話ししたのですが、あなたがたは聞いてくれませんでした。なぜもう一度聞こうとするのです。あなたがたも、あの方の弟子になりたいのですか。」
Azongiselaki bango: — Nasilaki koyebisa bino yango, kasi boyokaki te. Bongo mpo na nini bolingi lisusu koyoka yango? Boni, bino mpe bolingi kokoma bayekoli na ye?
28 彼らは彼をののしって言った。「おまえもあの者の弟子だ。しかし私たちはモーセの弟子だ。
Bongo Bafarizeo bakomaki kofinga ye mpe koloba: — Ezali yo nde ozali moyekoli na ye; biso tozali bayekoli ya Moyize.
29 私たちは、神がモーセにお話しになったことは知っている。しかし、あの者については、どこから来たのか知らないのだ。」
Toyebi ete Nzambe alobaki na Moyize; kasi moto wana, toyebi kutu te soki awuti wapi!
30 彼は答えて言った。「これは、驚きました。あなたがたは、あの方がどこから来られたのか、ご存じないと言う。しかし、あの方は私の目をおあけになったのです。
Moto yango azongisaki: — Oh, ezali penza likambo ya kokamwa soki boyebi te epai nini awuti! Kasi mpo na ngai, abikisi miso na ngai.
31 神は、罪人の言うことはお聞きになりません。しかし、だれでも神を敬い、そのみこころを行なうなら、神はその人の言うことを聞いてくださると、私たちは知っています。
Toyebi biso nyonso ete Nzambe ayokaka bato ya masumu te, kasi ayokaka nde moto oyo atosaka Ye mpe asalaka mokano na Ye.
32 盲目に生まれついた者の目をあけた者があるなどとは、昔から聞いたこともありません。 (aiōn g165)
Mpe totikala nanu koyoka te ete moto abikisi moto moko akufa miso wuta mbotama na ye. (aiōn g165)
33 もしあの方が神から出ておられるのでなかったら、何もできないはずです。」
Soki moto wana awutaki epai ya Nzambe te, akokaki kosala ata eloko moko te.
34 彼らは答えて言った。「おまえは全く罪の中に生まれていながら、私たちを教えるのか。」そして、彼を外に追い出した。
Bazongiselaki ye: — Ndenge nini yo moto oyo obotama mobimba kati na lisumu oteya biso? Boye, babenganaki ye.
35 イエスは、彼らが彼を追放したことを聞き、彼を見つけ出して言われた。「あなたは人の子を信じますか。」
Tango Yesu ayokaki ete babengani moto wana, akendeki kokutana na ye mpe alobaki na ye: — Boni, ondimi Mwana na Moto?
36 その人は答えた。「主よ。その方はどなたでしょうか。私がその方を信じることができますように。」
Moto wana azongiselaki Ye: — Nkolo, azali nani? Yebisa ngai mpo ete nandima Ye.
37 イエスは彼に言われた。「あなたはその方を見たのです。あなたと話しているのがそれです。」
Yesu alobaki: — Omoni Ye! Ezali Ye oyo azali koloba na yo.
38 彼は言った。「主よ。私は信じます。」そして彼はイエスを拝した。
Moto yango azongisaki: — Nkolo, nandimi. Mpe agumbamelaki Ye.
39 そこで、イエスは言われた。「わたしはさばきのためにこの世に来ました。それは、目の見えない者が見えるようになり、見える者が盲目となるためです。」
Yesu alobaki: — Nayaki mpo na kotia bososoli kati na mokili; mpo ete bakufi miso bakoma komona, mpe ba-oyo bazali komona bakoma bakufi miso.
40 パリサイ人の中でイエスとともにいた人々が、このことを聞いて、イエスに言った。「私たちも盲目なのですか。」
Bafarizeo mosusu oyo bazalaki elongo na ye bayokaki maloba yango mpe batunaki Yesu: — Boni, olingi koloba ete biso mpe tozali bakufi miso?
41 イエスは彼らに言われた。「もしあなたがたが盲目であったなら、あなたがたに罪はなかったでしょう。しかし、あなたがたは今、『私たちは目が見える。』と言っています。あなたがたの罪は残るのです。」
Yesu azongiselaki bango: — Soki bozalaki bakufi miso, bolingaki kozala na ngambo te; kasi lokola bolobi ete bomonaka, elingi koloba ete bozali penza na ngambo.

< ヨハネの福音書 9 >