< Kobima 37 >

1 Betisaleyeli asalaki Sanduku na nzete ya akasia. Molayi na yango ezalaki na basantimetele pene nkama moko na tuku mibale na mitano; mokuse na yango, basantimetele pene tuku sambo na mitano; mpe bosanda na yango, basantimetele pene tuku sambo na mitano.
Bezalel made the ark of acacia wood. Its length was four feet four inches, and its breadth two feet seven inches, and two feet seven inches its height.
2 Abambaki yango wolo ya peto, na kati mpe na libanda. Alatisaki mpe songe na yango wolo.
He overlaid it with pure gold inside and outside, and made a molding of gold for it around it.
3 Asalelaki yango bapete minei ya wolo mpe atiaki yango basonge minei: mibale na ngambo moko, mpe mibale na ngambo mosusu.
He cast four rings of gold for it, in its four feet; even two rings on its one side, and two rings on its other side.
4 Asalaki mabaya mibale na nzete ya akasia mpe abambaki yango wolo.
He made poles of acacia wood, and overlaid them with gold.
5 Akotisaki mabaya yango na bapete oyo ezali na songe ya Sanduku, mpo na komemela yango.
He put the poles into the rings on the sides of the ark, to bear the ark.
6 Asalaki mofinuku na wolo ya peto. Molayi na yango ezalaki na basantimetele pene nkama moko na tuku mibale na mitano; mpe mokuse na yango, basantimetele pene tuku sambo na mitano.
He made a mercy seat of pure gold. Its length was four feet four inches, and two feet seven inches, its breadth.
7 Asalaki bikeko mibale ya basheribe oyo atiaki na suka mibale ya mofinuku; asalaki yango na wolo oyo batuti na nzela ya marto.
He made two cherubim of gold. He made them of beaten work, at the two ends of the mercy seat;
8 Atiaki ekeko moko ya sheribe na suka moko, mpe ekeko mosusu, na suka mosusu. Akangisaki bikeko ya basheribe na mofinuku, na suka nyonso mibale.
one cherub at the one end, and one cherub at the other end. He made the cherubim of one piece with the mercy seat at its two ends.
9 Mapapu ya basheribe ezalaki ya kofungwama na likolo mpo na kobatela mofinuku; bazalaki ngambo na ngambo, mpe miso na bango etalaki mofinuku.
The cherubim spread out their wings on high, covering the mercy seat with their wings, with their faces toward one another. The faces of the cherubim were toward the mercy seat.
10 Asalaki mesa moko na mabaya ya akasia. Molayi na yango ezalaki na basantimetele pene nkama moko; mokuse na yango, basantimetele pene tuku mitano; mpe bosanda na yango, basantimetele pene tuku sambo na mitano.
He made the table of acacia wood. Its length was three feet five inches, and its breadth was twenty-one inches, and its height was two feet seven inches.
11 Abambaki yango wolo ya peto mpe atiaki lisusu wolo na pembeni na yango.
He overlaid it with pure gold, and made a gold molding around it.
12 Azingelaki mesa yango na libaya oyo ezalaki na basantimetele pene mwambe na monene mpe atiaki wolo na pembeni ya libaya yango.
He made a border of a handbreadth around it, and made a golden molding on its border around it.
13 Asalaki bapete minei ya wolo mpe atiaki yango na songe minei ya mesa epai wapi makolo na yango ezalaki.
He cast four rings of gold for it, and put the rings in the four corners that were on its four feet.
14 Bapete ezalaki pene ya libaya oyo ezingelaki mesa, mpe bakotisaki kati na bapete yango mabaya ya komemela Sanduku.
The rings were close by the border, the places for the poles to carry the table.
15 Asalaki na nzete ya akasia mabaya ya komemela mesa, mpe abambaki yango wolo.
He made the poles of acacia wood, and overlaid them with gold, to carry the table.
16 Asalaki na wolo ya peto basani, bakopo, bambilika mpe bambeki, mpo na makabo ya masanga.
He made the vessels which were on the table, its dishes, its spoons, its bowls, and its pitchers with which to pour out, of pure gold.
17 Asalaki na wolo ya peto etelemiselo ya minda; asalaki yango na wolo oyo batuti na nzela ya marto. Evandelo na yango, likonzi na yango, bakeni na yango, bambuma mpe bafololo na yango, nyonso ezalaki ekangana lokola eloko moko.
He made the menorah of pure gold. He made the menorah of beaten work. Its base, its shaft, its cups, its buds, and its flowers were of one piece with it.
18 Mipanzi ya likonzi ya etelemiselo ya minda ezalaki na bitape motoba: misato na ngambo moko, mpe misato na ngambo mosusu.
There were six branches going out of its sides: three branches of the menorah out of its one side, and three branches of the menorah out of its other side:
19 Na likolo ya etape moko na moko ya etelemiselo ya minda, atiaki bakeni misato oyo ezali na lolenge ya fololo ya madame, elongo na bambuma mpe bafololo.
three cups made like almond blossoms in one branch, a bud and a flower, and three cups made like almond blossoms in the other branch, a bud and a flower: so for the six branches going out of the menorah.
20 Na moto ya likonzi ya etelemiselo ya minda, ezalaki na bakeni minei oyo ezali na lolenge ya bafololo ya madame, elongo na bambuma mpe bafololo.
In the menorah were four cups made like almond blossoms, its buds and its flowers;
21 Na se ya bitape mibale-mibale ya etelemiselo ya minda, ezalaki na mbuma moko; mpe ezalaki bongo mpo na bitape nyonso motoba ya etelemiselo ya minda.
and a bud under two branches of one piece with it, and a bud under two branches of one piece with it, and a bud under two branches of one piece with it, for the six branches going out of it.
22 Bambuma mpe bitape ezalaki ekangana na etelemiselo ya minda; mpe nyonso esalemaki na wolo ya peto, wolo oyo batuti na nzela ya marto.
Their buds and their branches were of one piece with it. The whole thing was one beaten work of pure gold.
23 Asalaki minda sambo; mpe asalaki na wolo ya peto bisimbelo elongo na basani ya putulu.
He made its seven lamps, and its snuffers, and its snuff dishes, of pure gold.
24 Asalelaki bakilo tuku misato na minei ya wolo ya peto mpo na kosala etelemiselo ya minda mpe bisalelo na yango nyonso.
He made it of a talent of pure gold, with all its vessels.
25 Betisaleyeli asalaki etumbelo ya malasi na nzete ya akasia. Molayi mpe mokuse na yango ezalaki ndenge moko, basantimetele pene tuku mitano; mpe bosanda na yango ezalaki na metele moko. Maseke na yango ekangamaki na etumbelo mpe esalaki kaka eloko moko.
He made the altar of incense of acacia wood. It was square: its length was twenty-one inches, and its breadth twenty-one inches. Its height was three feet five inches. Its horns were of one piece with it.
26 Abambaki wolo ya peto na likolo ya etumbelo, na mipanzi na yango mpe na maseke na yango; mpe azingelaki pembeni na yango na libende ya wolo.
He overlaid it with pure gold, its top, its sides around it, and its horns. He made a gold molding around it.
27 Asalaki mpo na etumbelo bapete ya wolo na se ya ebende ya wolo oyo ezingeli yango: mibale na ngambo moko, mpe mibale na ngambo mosusu; mpo na kokotisa mabaya ya komemela etumbelo.
He made two golden rings for it under its molding crown, on its two ribs, on its two sides, for places for poles with which to carry it.
28 Asalaki mabaya yango na nzete ya akasia mpe abambaki yango wolo.
He made the poles of acacia wood, and overlaid them with gold.
29 Asalaki mafuta ya epakolami ya bule, malasi ya solo kitoko mpe ya peto, oyo esalemi na mosali malasi.
He made the holy anointing oil and the pure incense of sweet spices, after the art of the perfumer.

< Kobima 37 >