< Oze 9 >

1 Isalaele, kosepela te; kozala na esengo te lokola bikolo mosusu; pamba te otikaki Nzambe na yo mpe okendeki kosala kindumba; osepelaki na lifuti ya kindumba na bitando nyonso oyo batutelaka ble.
Rejoice not too loudly, Israel, like the nations, for you have commited adultery, being untrue to your God. You have loved a prostitute’s wages on every threshing floor.
2 Etando oyo batutelaka ble mpe ekamolelo masanga ya vino ekopesa bango bilei te, mpe bakozanga vino ya sika.
Threshing floor and wine vat won’t feed them, the new wine will fail them.
3 Bakovanda lisusu te na mboka na Yawe; Efrayimi akozonga na Ejipito, mpe bakolia bilei ya mbindo kati na Asiri.
They will not stay in the Lord’s land, but Ephraim will return to Egypt, and in Assyria they will eat what is unclean.
4 Bakobonzela lisusu Yawe makabo ya masanga ya vino te, mpe bambeka na bango ekosepelisa lisusu Yawe te. Ekozala mpo na bango lokola bilei ya matanga: bato nyonso oyo bakolia yango bakokoma mbindo; pamba te bilei na bango ekozala kaka mpo na mabumu na bango, kasi ekokota te na Tempelo ya Yawe.
They will not pour out libations of wine to the Lord, nor please him with their sacrifices. Their bread will be like the bread of mourners: all who eat it will defile themselves. For their bread will be only for their hunger, it will not come into the Lord’s temple.
5 Boye, bokosala nini na mikolo ya bafeti oyo ekatama, na mikolo ya bafeti ya Yawe?
What will you do on the day of the festival? Or on the day of the Lord’s feast?
6 Ata soki bakimi, bakobebisama; Ejipito ekoyamba bango, Mefisi ekozala kunda na bango; matiti mabe ekotonda na bibombelo palata na bango, banzube ekotonda kati na bandako na bango.
Even if they flee from destruction, Egypt will gather them, Memphis will bury them. Nettles will take possession of their treasure of silver, thorns will push into their tents.
7 Mikolo ya etumbu ezali koya, mikolo ya kofuta masumu esili koya. Isalaele, yeba yango! Mosakoli akomi zoba, moto ya Molimo abeli liboma! Pamba te masumu na yo ekomi ebele penza, mpe mabe na yo ekomi mingi liboso na ngai.
The days of punishment are come, the days of recompense are at hand, as soon the Israelites will know! ‘The prophet is a fool, the inspired man is raving mad!’ It is because of the greatness of your iniquity and the greatness of your hatred.
8 Mokengeli ya Efrayimi azali elongo na Nzambe na ngai, azali mosakoli; Nzokande bazali kotiela ye mitambo na banzela na ye nyonso mpe bazali kotelemela ye kino na Ndako ya Nzambe na ye.
Ephraim acts the spy with my God, a prophet finds the snares of a fowler are in all his ways. In the house of his God they lay hostile plots,
9 Bamikotisi penza kati na mabe ndenge basalaki na mikolo ya Gibea. Nzambe akobosana mabe na bango te mpe akopesa bango etumbu mpo na masumu na bango.
they commit crimes as in the days of Gibeah, God will remember their iniquity. He will punish their sin.
10 Tango namonaki Isalaele, azalaki lokola bambuma ya vino kati na esobe. Tango namonaki bakoko na bino, bazalaki lokola bambuma ya liboso ya nzete ya figi. Kasi tango bakomaki na Bala Peori, bamipesaki na nzambe oyo ya ekeko ya soni mpe bakomaki nkele lokola eloko oyo bango balingaki.
I found Israel like finding grapes in the wilderness. I saw your ancestors like they were the first fruit on a fig tree, but as soon as they came to Baal-peor, they consecrated themselves to shamefulness, and became as abominable as the object of their love.
11 Nkembo ya Efrayimi ekokima lokola ndeke, wuta na mbotama, wuta na zemi, wuta na ebandeli ya zemi.
Ephraim – like a bird his glory flies away. There will be no more birth, no more motherhood, no more conception.
12 Ezala soki babokoli bana, nakobotola bango liboso ete bakola. Solo, mawa na bango tango nakopesa bango mokongo!
Even though they bring up their children, I will bereave them until not one is left. Woe to them when I turn away from them!
13 Nazali komona Efrayimi lokola engumba Tiri oyo etongama na likolo ya mabele ya kitoko; nzokande, Efrayimi akokaba bana na ye na mobomi.
Ephraim – planted like Tyre in a meadow, But Ephraim too must lead forth their children to slaughter.
14 Oh Yawe, pesa bango… Okopesa bango nini? Pesa bango mabumu oyo esopaka bazemi, mpe mabele oyo ekawuka.
Give them, Lord – what will you give? Give them a miscarrying womb and shrivelled up breasts!
15 Nayinaki bango mpo na mabe na bango nyonso oyo basalaki na Giligali; Nakobengana bango na Ndako na Ngai mpo na misala na bango ya mabe. Nakolinga bango lisusu te, pamba te bakonzi na bango nyonso bazali batomboki.
All their evil began in Gilgal, there I learned to hate them. Because of the evil of their deeds I will drive them out of my house. I will no longer love them, for all their princes are rebels.
16 Efrayimi alembi, misisa na ye ekawuki; akobota lisusu bambuma te; ata soki baboti bana, nakoboma bana na bango oyo balingaka mingi.
Ephraim is blighted, their root withered. If they do bear children, I will slay the darlings of their womb,
17 Nzambe na ngai akobwaka bango, pamba te batosaki Ye te, mpe bakokoma koyengayenga kati na bikolo.
My God will reject them because they have not listened to him, and they will become wanderers among the nations.

< Oze 9 >