< Jeremi 44 >

1 Tala liloba oyo Jeremi azwaki na tina na Bayuda oyo bazalaki kovanda na Ejipito, na se ya bingumba ya Migidoli, na Dafine, na Mefisi mpe na Patrosi:
The word that came to Jeremiah concerning all the Jews who lived in the land of Egypt, who lived at Migdol, and at Tahpanhes, and at Memphis, and in the country of Pathros, saying,
2 « Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi: Bomonaki pasi makasi oyo natindaki na Yelusalemi mpe na bingumba nyonso ya Yuda. Na mokolo ya lelo, etikali pamba mpe ebebisami makasi
"Thus says the LORD of hosts, the God of Israel: 'You have seen all the evil that I have brought on Jerusalem, and on all the cities of Judah; and look, this day they are a desolation, and no man dwells in them,
3 likolo ya mabe oyo basalaki. Bapesaki Ngai kanda tango bakomaki kotumba malasi ya ansa lokola mbeka mpe kosalela banzambe mosusu oyo batikalaki koyeba te, ezala bango to bino to batata na bino.
because of their wickedness which they have committed to provoke me to anger, in that they went to burn incense, to serve other gods, that they did not know, neither they, nor you, nor your fathers.
4 Nzokande, nazalaki tango na tango kotinda basali na Ngai, basakoli, mpo na koloba na bino: ‹ Bosala te makambo ya nkele oyo nayinaka. ›
However I sent to you all my servants the prophets, rising up early and sending them, saying, 'Oh, do not do this abominable thing that I hate.'
5 Kasi batikalaki koyoka te mpe batosaki te; batikaki mabe na bango te mpe bakobaki kaka kotumba malasi ya ansa lokola mbeka epai ya banzambe mosusu.
But they did not listen, nor inclined their ear to turn from their wickedness, to burn no incense to other gods.
6 Yango wana, kanda makasi na Ngai epelaki mpe ebebisaki bingumba ya Yuda mpe babalabala ya Yelusalemi; mpe lisusu ebukaki-bukaki yango ndenge ezali komonana lelo.
Therefore my wrath and my anger was poured forth, and was kindled in the cities of Judah and in the streets of Jerusalem; and they are wasted and desolate, as it is this day.'
7 Sik’oyo tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga mpe Nzambe ya Isalaele, alobi: Mpo na nini bozali komimemela pasi ya makasi boye kino mokili ya Yuda ezangela mibali, basi, babebe mpe etikala lisusu ata na moto moko te?
Therefore now thus says the LORD, the God of hosts, the God of Israel: 'Why do you commit great evil against your own souls, to cut off from yourselves man and woman, infant and nursing child out of the midst of Judah, to leave yourselves none remaining;
8 Mpo na nini bozali kopelisa kanda na Ngai na nzela ya misala na bino ya mabe, na kotumbaka malasi ya ansa lokola mbeka epai ya banzambe mosusu ya Ejipito epai wapi bokeyi kovanda? Bino moko nde bozali komibebisa mpe komikomisa bato ya libabe mpe eloko ya kotiola kati ya bikolo nyonso ya mokili.
in that you provoke me to anger with the works of your hands, burning incense to other gods in the land of Egypt, where you have gone to live; that you may be cut off, and that you may be a curse and a reproach among all the nations of the earth?
9 Bobosani mabe oyo batata na bino, bakonzi mpe basi ya bakonzi ya Yuda basalaki? Bobosani mabe oyo bino mpe basi na bino bosalaki kati na mokili ya Yuda mpe kati na babalabala ya Yelusalemi?
Have you forgotten the wickedness of your fathers, and the wickedness of the kings of Judah, and the wickedness of their wives, and your own wickedness, and the wickedness of your wives which they committed in the land of Judah, and in the streets of Jerusalem?
10 Kino lelo, bamikitisi te, batosi Ngai te, batosi mibeko mpe malako na Ngai te, oyo napesaki bino mpe batata na bino.
They are not humbled even to this day, neither have they feared, nor walked in my law, nor in my statutes, that I set before you and before your fathers.'
11 Mpo na yango, tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi: Nazwi mokano ya komemela bino pasi mpe ya kobebisa mokili nyonso ya Yuda.
Therefore thus says the LORD of hosts, the God of Israel: 'Look, I will set my face against you for evil, even to cut off all Judah.
12 Nakokanga batikali ya Yuda, ba-oyo batingamaki koya kovanda awa na Ejipito; bango nyonso bakokufa kati na Ejipito, na mopanga mpe na nzala makasi, kobanda na ye oyo aleki moke kino na ye oyo aleki monene; bakokufa na mopanga mpe na nzala makasi, mpe bakobanda kotangaka kombo na bango mpo na kolakela bato mabe; bakokoma eloko ya koyoka somo, eloko ya lisuma mpe eloko ya kotiola.
I will take the remnant of Judah, that have set their faces to go into the land of Egypt to live there, and they shall all be consumed; in the land of Egypt shall they fall; they shall be consumed by the sword and by the famine; they shall die, from the least even to the greatest, by the sword and by the famine; and they shall be an object of horror, an astonishment, and a curse, and a reproach.
13 Nakopesa bavandi ya Ejipito etumbu na mopanga, na nzala makasi mpe na bokono oyo ebomaka, ndenge napesaki Yelusalemi etumbu.
For I will punish those who dwell in the land of Egypt, as I have punished Jerusalem, by the sword, by the famine, and by the pestilence;
14 Kati na batikali ya Yuda oyo bayaki kovanda na Ejipito, moko te akobika to akotikala na bomoi, ata soki ayoki posa ya kozonga mpo na kovanda na mokili ya Yuda, bato moke kaka nde bakozonga. »
so that none of the remnant of Judah, who have gone into the land of Egypt to live there, shall escape or be left, to return into the land of Judah, to which they have a desire to return to dwell there: for none shall return save such as shall escape.'"
15 Mibali nyonso oyo bayebaki ete basi na bango bazalaki kotumba malasi ya ansa lokola mbeka epai ya banzambe mosusu, elongo na basi nyonso oyo bazalaki wana kati na lisanga monene mpe bato nyonso oyo bazalaki kovanda na Ejipito ya se mpe ya likolo balobaki na Jeremi:
Then all the men who knew that their wives burned incense to other gods, and all the women who stood by, a great assembly, even all the people who lived in the land of Egypt, in Pathros, answered Jeremiah, saying,
16 — Te! Tokoyoka te makambo oyo ozali koyebisa biso na kombo ya Yawe.
"As for the word that you have spoken to us in the name of the LORD, we will not listen to you.
17 Tokosala nde makambo nyonso oyo biso tokanaki kosala: tokotumba malasi ya ansa lokola mbeka mpo na Ishitari mpe tokosopa makabo ya masanga ya vino mpo na ye ndenge biso, batata na biso, bakonzi na biso mpe bakalaka na biso tosalaki kati na bingumba ya Yuda mpe na babalabala ya Yelusalemi; mpe na tango wana, tozalaki na bilei ebele, tozalaki malamu mpe tozalaki komona pasi te.
But we will certainly perform every word that is gone forth out of our mouth, to burn incense to the queen of heaven, and to pour out drink offerings to her, as we have done, we and our fathers, our kings and our leaders, in the cities of Judah, and in the streets of Jerusalem; for then had we plenty of food, and were well, and saw no evil.
18 Kasi wuta kaka tango totikaki kotumba malasi ya ansa lokola mbeka mpe kosopa makabo ya masanga ya vino epai ya Ishitari, tozangela nyonso mpe tokoma kokufa na mopanga mpe na nzala makasi.
But since we left off burning incense to the queen of heaven, and pouring out drink offerings to her, we have wanted all things, and have been consumed by the sword and by the famine."
19 Basi babakisaki: — Kutu, tango tozalaki kotumba malasi ya ansa lokola mbeka mpe kosopa makabo ya masanga ya vino epai ya Ishitari, boni, mibali na biso bayebaki te ete tozali kosala bagato na elilingi na ye mpe kosopa makabo ya masanga ya vino epai na ye?
And the women said, "When we burned incense to the queen of heaven, and poured out drink offerings to her, did we make her cakes to worship her, and pour out drink offerings to her, without our husbands?"
20 Bongo Jeremi alobaki na bato nyonso, mibali mpe basi, oyo bapesaki ye eyano wana:
Then Jeremiah said to all the people, to the men, and to the women, even to all the people who had given him an answer, saying,
21 — Boni, bokanisi ete Yawe abosani mpe azali kokanisa lisusu te malasi ya ansa oyo botumbaki kati na bingumba ya Yuda mpe na babalabala ya Yelusalemi, bino, batata na bino, bakonzi na bino, bakalaka na bino mpe bato nyonso ya mokili?
"The incense that you burned in the cities of Judah, and in the streets of Jerusalem, you and your fathers, your kings and your leaders, and the people of the land. Did not the LORD remember them, and did not it come into his mind,
22 Yawe akokaki lisusu te kokanga motema liboso ya misala na bino ya mabe mpe ya nkele; ezali mpo na yango nde mokili na bino ekomi elanga ya libebi, etando ebebisama, eloko ya lisuma mpe etikali lisusu na bato te, ndenge ezali komonana na mokolo ya lelo.
so that the LORD could no longer bear because of the evil of your doings, and because of the abominations which you have committed? Therefore your land has become a desolation, and an astonishment, and a curse, without inhabitant, as it is this day.
23 Mpo ete botumbaki malasi ya ansa lokola mbeka mpe bosalaki masumu liboso ya Yawe, mpo ete botosaki Yawe te mpe bolandaki te Mobeko na Ye, bikateli na Ye mpe malako na Ye, yango wana pasi oyo ekomeli bino ndenge bozali komona yango lelo.
Because you have burned incense, and because you have sinned against the LORD, and have not obeyed the voice of the LORD, nor walked in his law, nor in his statutes, nor in his testimonies; therefore this evil has happened to you, as it is this day."
24 Jeremi alobaki na bato nyonso mpe epai ya basi nyonso: — Bino bato nyonso ya Yuda oyo bozali kati na Ejipito, boyoka Liloba na Yawe:
Moreover Jeremiah said to all the people, and to all the women, "Hear the word of the LORD, all Judah who are in the land of Egypt:
25 Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi: Bino mpe basi na bino, bomonisi na nzela ya misala na bino elaka oyo bopesaki tango bolobaki: « Tokokokisa solo ndayi oyo tolapaki ete tokotumba malasi ya ansa mpe tokosopa makabo ya masanga ya vino epai ya Ishitari, nzambe mwasi ya bato ya Babiloni. » Bokende! Bosala ndenge bolobi mpe bokokisa ndayi na bino!
Thus says the LORD of hosts, the God of Israel, saying, 'You and your wives have both spoken with your mouths, and with your hands have fulfilled it, saying, "We will surely perform our vows that we have vowed, to burn incense to the queen of heaven, and to pour out drink offerings to her": establish then your vows, and perform your vows.'
26 Kasi mpo na yango, boyoka Liloba na Yawe, bino Bayuda nyonso oyo bozali kovanda kati na Ejipito: « Tala, nalapi ndayi na Kombo na Ngai ya monene, » elobi Yawe, « moto moko te oyo awuta na mokili ya Yuda, bongo avandi na esika songolo ya Ejipito, akobelela to mpe akolapa ndayi na Kombo na Ngai, na koloba: ‹ Lokola Nkolo Yawe azali na bomoi! ›
Therefore hear the word of the LORD, all Judah who dwell in the land of Egypt: 'Look, I have sworn by my great name,' says the LORD, 'that my name shall no more be named in the mouth of any man of Judah in all the land of Egypt, saying, "As the LORD lives."
27 Pamba te nazali kolandela bango malamu mpo ete bamona pasi kasi bolamu te. Bato nyonso ya Yuda kati na Ejipito bakokufa na mopanga mpe na nzala makasi kino tango bango nyonso bakosila kobebisama.
Look, I watch over them for disaster, and not for good; and all the men of Judah who are in the land of Egypt shall be consumed by the sword and by the famine, until they are all gone.
28 Kaka ndambo moke ya bato nde ekobika na mopanga mpe ekozonga na mokili ya Yuda, wuta na Ejipito. Boye, batikali nyonso ya Yuda, ba-oyo nyonso bayaki kovanda na Ejipito, bakoyeba soki liloba ya nani nde ekokokisama: ya Ngai to ya bango.
Those who escape the sword shall return out of the land of Egypt into the land of Judah, few in number; and all the remnant of Judah, who have gone into the land of Egypt to live there, shall know whose word shall stand, mine, or theirs.
29 Ekozala elembo ete nakopesa bino etumbu na esika oyo, » elobi Yawe, « mpo ete boyeba solo ete pasi oyo nalakaki bino ekokokisama kaka. »
This shall be the sign to you,' says the LORD, 'that I will punish you in this place, that you may know that my words shall surely stand against you for evil':
30 Tala liloba oyo Yawe alobi: « Nakokaba Faraon Ofira, mokonzi ya Ejipito, na maboko ya banguna na ye oyo bazali koluka bomoi na ye, ndenge kaka nakabaki Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, na maboko ya Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, oyo azalaki koluka bomoi na ye. »
Thus says the LORD, 'Look, I will give Pharaoh Hophra king of Egypt into the hand of his enemies, and into the hand of those who seek his life; as I gave Zedekiah king of Judah into the hand of Nebuchadnezzar king of Babylon, who was his enemy, and sought his life.'"

< Jeremi 44 >