< Bileli 1 >

1 Tala ndenge nini engumba oyo, na kala, ezalaki na bato ebele penza, etikali lisusu na bato te! Tala ndenge nini engumba oyo ezalaki na lokumu kati na bikolo ekomi lelo lokola mwasi akufisa mobali; oyo ezalaki engumba mokonzi ekomi lelo na bowumbu!
The city that once was full of people is now sitting all alone. She has become like a widow, though she was a mighty nation. She was a princess among the nations, but is now forced into slavery.
2 Butu mobimba, azali kolela se kolela, mpinzoli etondi na matama na ye. Kati na bamakangu na ye nyonso, moko te ayei kobondisa ye; baninga na ye nyonso bakosi ye, bakomi banguna na ye.
She weeps and wails in the night, and her tears cover her cheeks. None of her lovers comfort her. All her friends have betrayed her. They have become her enemies.
3 Yuda akei na bowumbu, akomi konyokwama mpe kosala misala makasi; azali kovanda kati na bikolo, azali lisusu na esika ya kopema te. Bato nyonso oyo bazali kolanda ye, bakangi ye kati na pasi makasi.
After poverty and affliction, Judah has gone into exile. She lives among the nations and finds no rest. All her pursuers overtook her in her desperation.
4 Nzela oyo ekenda kino na Siona ezali na matanga, pamba te bato bazali koya lisusu na bafeti te. Bikuke na ye nyonso etikali lisusu na bato te, Banganga-Nzambe na ye bazali kolela, bana na ye ya basi oyo bayebi nanu nzoto ya mibali te bazali na mawa; bongo ye moko akomi na pasi makasi kati na motema.
The roads of Zion mourn because none come to the appointed feasts. All her gates are desolate. Her priests groan. Her virgins are sorrowful and she herself is in complete distress.
5 Banguna na ye bakomi bakonzi na ye, bayini na ye bazali na esengo; pamba te Yawe atindeli Siona pasi likolo ya ebele ya masumu na ye. Bana na ye ya mibali bakei na bowumbu, bakangi bango mpe bazali kotambola liboso ya monguna na ye.
Her adversaries have become her master; her enemies prosper. Yahweh has afflicted her for her many sins. Her little children go into captivity to her adversary.
6 Lokumu nyonso ya Siona, mboka kitoko, esili; bakambi na ye bakomi lokola mboloko oyo ezangi matiti ya kolia, mpe bazali kokima, makasi na bango esili liboso ya moto oyo azali kolanda bango.
Beauty has left the daughter of Zion. Her princes have become like deer that cannot find pasture, and they go without strength before their pursuer.
7 Na mikolo na ye ya pasi mpe ya koyengayenga, tango bato na ye bazali kokweya na maboko ya banguna mpe moto akosunga ye azali te, Yelusalemi azali kokanisa bomengo na ye nyonso ya kala; bayini na ye batali ye na pamba mpe basepeli na kobebisama na ye.
In the days of her affliction and her homelessness, Jerusalem will call to mind all her precious treasures that she had in former days. When her people fell into the hand of the adversary, no one helped her. The adversaries saw her and laughed at her destruction.
8 Yelusalemi asali masumu mingi penza, yango wana akomi mbindo. Bato nyonso oyo bazalaki kopesa ye lokumu bakomi kotiola ye, pamba te bamoni bolumbu na ye; ye moko mpe azali komilela mpe abaluki mpo na kobomba elongi.
Jerusalem sinned greatly, therefore, she has become scorned as something that is filthy. All who honored her now despise her since they have seen her nakedness. She groans and tries to turn away.
9 Mbindo na ye ekangami ye na elamba, ayebaki te makambo nini ekokomela ye na sima. Tala ye wana akweyi, bongo kokweya na ye ezali kokamwisa; moto oyo akolendisa ye azali te! « Oh Yawe, tala pasi na ngai, pamba te monguna alongi ngai! »
She has become unclean beneath her skirts. She did not think about her future. Her fall was terrible. There was no one to comfort her. She cried out, “Look at my affliction, Yahweh, for the enemy has become too great!”
10 Monguna asemboli loboko na ye likolo ya bomengo nyonso ya Yelusalemi, bongo azali komona bikolo ya bapaya kokota na esika na ye ya bule, bikolo oyo Yo opekisaki kokota kati na lisanga na Yo.
The adversary has put his hand on all our precious treasures. She has seen the nations enter her sanctuary, even though you had commanded that they must not enter into your assembly place.
11 Bato na ye nyonso bazali kolela lokola bato bazali koluka bilei; bapesaki bomengo na bango mpo na kozwa bilei, mpo ete bawumela na bomoi. Oh Yawe, tala mpe mona ndenge natiolami!
All her people groan as they search for bread. They have given their precious treasures for food to restore their lives. Look, Yahweh, and consider me, for I have become worthless.
12 Bino bato nyonso oyo bolekelaka wana; boni, ezali kosala bino eloko moko te? Botala malamu zingazinga na bino, ezali na pasi lokola pasi oyo ekomeli ngai? Yawe atindeli ngai yango na mokolo ya kanda makasi na Ye.
Is it nothing to you, all you who pass by? Look and see if there is anyone else's sorrow like the sorrow that is being inflicted on me, since Yahweh has tormented me on the day of his fierce anger.
13 Wuta na likolo, atindeli ngai moto, akitiseli ngai yango kino na mikuwa; atieli ngai motambo na makolo mpe akweyisi ngai; akomisi ngai eloko ya pamba, akotisi ngai na mawa ya mokolo na mokolo.
It is from on high that he has sent fire into my bones, and it has conquered them. He has spread a net for my feet and turned me back. He has made me constantly desolate and weak.
14 Maboko na Ye ekangi masumu na ngai ndenge bakangaka ekangiseli; masumu yango emati ngai kino na kingo, mpe Nkolo asilisi makasi na ngai, akabi ngai na maboko ya bato oyo nazali na makoki ya kotelemela te.
The yoke of my transgressions is bound together by his hand. They are knit together and placed upon my neck. He has made my strength fail. The Lord has given me over into their hands, and I am not able to stand.
15 Yawe asundoli bilombe nyonso ya bitumba oyo bazalaki na milongo na ngai; abengi mampinga ya bapaya mpo ete baya koboma bilenge mibali na ngai. Nkolo akamoli Yuda, mboka kitoko, na ekamolelo na Ye ya vino.
The Lord has tossed aside all my mighty men who defended me. He has called an assembly against me to crush my vigorous men. The Lord has trampled the virgin daughter of Judah in the winepress.
16 Tala tina nini nazali kolela mpe miso na ngai etondi na mpinzoli; moto moko te ayei pene na ngai mpo na kobondisa ngai, moto moko te ayei kolendisa molimo na ngai. Bana na ngai bazali na pasi, mpo ete monguna aleki ngai na makasi.
For these things I weep, my eyes overflow with tears; for a comforter is far from me, one who restores my life. My children are desolate because the enemy has conquered me.
17 Siona atomboli maboko na ye, kasi moto oyo akobondisa ye azali te. Yawe azwi mokano mpo na Jakobi ete bazalani na ye bakokoma banguna na ye, mpe ete Yelusalemi akokoma eloko ya mbindo na miso na bango.
Zion has spread her hands wide; there is none to comfort her. Yahweh has commanded that those around Jacob should be his adversaries. Jerusalem is something unclean to them.
18 Yawe azali sembo; nzokande, ezali ngai nde natombokelaki mitindo na Ye. Boyoka, bino bikolo nyonso, mpe botala pasi na ngai! Bana na ngai ya basi mpe ya mibali bakei na bowumbu.
Yahweh is righteous, for I have rebelled against his commandment. Hear, all you peoples, and see my sorrow. My virgins and my vigorous men have gone into captivity.
19 Nabengisaki baninga na ngai, kasi bakosaki ngai. Banganga-Nzambe mpe bakambi na ngai bakufaki kati na engumba tango bazalaki koluka bilei mpo ete bawumela na bomoi.
I called for my friends, but they were treacherous toward me. My priests and my elders perished in the city, while they sought food to restore their lives.
20 Oh Yawe, tala ndenge nazali na pasi: libumu na ngai ezali kotungisama, mpe motema na ngai ezali kosala pasi, pamba te nazalaki motomboki penza. Na libanda, mopanga ezali koboma bana na ngai; mpe na kati, ezali kaka kufa.
Look, Yahweh, for I am in distress; my stomach churns, my heart is disturbed within me, for I have been very rebellious. Outside, the sword bereaves a mother, inside the house there is only death.
21 Bato bayokaki na bango kolela na ngai, kasi moto akobondisa ngai azali te; banguna na ngai nyonso bayokaki sango ya pasi na ngai mpe basepelaki na makambo oyo osalaki. Tika ete okokisa solo mokolo oyo olakaki, mpo ete bango mpe bakoma lokola ngai!
They have heard my groaning, but there is no one to comfort me. All my enemies have heard of my trouble and they are glad that you have done it. You have brought the day you promised; now let them become like me.
22 Tika ete mabe na bango nyonso eya liboso na Yo; sala bango ndenge osalaki ngai mpo na masumu nyonso oyo nasalaki! Kolela na ngai ezali mingi mpe motema na ngai etondi na pasi!
Let all their wickedness come before you. deal with them as you have dealt with me because of all my transgressions. My groans are many and my heart is faint.

< Bileli 1 >