< Mitango 25 >

1 Wana bana ya Isalaele bavandaki nanu na Shitimi, bamipesaki na kindumba na bilenge basi ya Moabi.
Et Israël habitait en Sittim; et le peuple commença à commettre fornication avec les filles de Moab;
2 Mpe, bilenge basi yango bazalaki kobenga bango na milulu ya mbeka oyo babonzelaka banzambe na bango. Mpe bana ya Isalaele bazalaki kolia mpe kogumbamela banzambe yango.
et elles invitèrent le peuple aux sacrifices de leurs dieux, et le peuple mangea, et se prosterna devant leurs dieux.
3 Bongo, bana ya Isalaele bamipesaki na kosambela Bala ya Peori mpe, kanda ya Yawe epelaki makasi mpo na bango.
Et Israël s’attacha à Baal-Péor; et la colère de l’Éternel s’embrasa contre Israël.
4 Yawe alobaki na Moyize: « Kanga bakambi nyonso ya Isalaele mpe diembika bango liboso na Ngai, na se ya moyi, mpo ete kanda makasi na Yawe elongwa likolo ya Isalaele. »
Et l’Éternel dit à Moïse: Prends tous les chefs du peuple et fais-les pendre devant l’Éternel, à la face du soleil, afin que l’ardeur de la colère de l’Éternel se détourne d’Israël.
5 Moyize alobaki na bakambi ya Isalaele: « Tika ete moko na moko kati na bino aboma bato na ye oyo bamipesi na kosambela nzambe Bala ya Peori. »
Et Moïse dit aux juges d’Israël: Que chacun de vous tue ses hommes qui se sont attachés à Baal-Péor.
6 Bongo moto moko ya Isalaele amemaki na libota na ye mwasi moko ya ekolo ya Madiani liboso ya Moyize mpe ya lisanga mobimba ya bana ya Isalaele, wana bazalaki kolela na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani.
Et voici, un homme des fils d’Israël vint, et amena vers ses frères une Madianite, sous les yeux de Moïse et sous les yeux de toute l’assemblée des fils d’Israël qui pleuraient à l’entrée de la tente d’assignation.
7 Tango Pineasi, mwana mobali ya Eleazari, mwana mobali ya Nganga-Nzambe Aron amonaki bongo, abimaki kati na lisanga mpe akamataki mopanga;
Et Phinées, fils d’Éléazar, fils d’Aaron, le sacrificateur, le vit, et il se leva du milieu de l’assemblée, et prit une pique dans sa main,
8 alandaki moto ya Isalaele wana kino kati na ndako na ye ya kapo mpe atobolaki bango mibale mabumu mpe bakufaki, ezala moto ya Isalaele wana mpe mwasi wana. Mpe etumbu oyo ezalaki likolo ya Isalaele esilaki.
et entra après l’homme d’Israël dans l’intérieur de la tente, et les transperça tous deux, l’homme d’Israël, et la femme, par le bas-ventre; et la plaie s’arrêta de dessus les fils d’Israël.
9 Bato oyo bakufaki na etumbu wana bazalaki, bato nkoto tuku mibale na minei.
Et ceux qui moururent de la plaie furent 24 000.
10 Yawe alobaki na Moyize:
Et l’Éternel parla à Moïse, disant:
11 « Nganga-Nzambe Pineasi, mwana mobali ya Eleazari, mwana mobali ya Aron, asili kolongola kanda na Ngai likolo ya bana ya Isalaele, pamba te atalisi bolingo oyo eleka ndelo mpo na lokumu na Ngai kati na bango; yango wana, na kanda na Ngai ya makasi, nasilisaki koboma bana ya Isalaele te.
Phinées, fils d’Éléazar, fils d’Aaron, le sacrificateur, a détourné mon courroux de dessus les fils d’Israël, étant jaloux de ma jalousie au milieu d’eux, de sorte que je ne consume pas les fils d’Israël dans ma jalousie.
12 Na boye, yebisa ye ete nasili kosala boyokani ya kimia elongo na ye.
C’est pourquoi dis: Voici, je lui donne mon alliance de paix;
13 Boyokani yango ekozala mpo na ye mpe mpo na bakitani na ye, mpo ete basala mosala na Ngai ya Bonganga-Nzambe mpo na libela, pamba te atalisi bolingo oyo eleka ndelo mpo na lokumu ya Nzambe na ye, mpe asali mosala ya bolimbisi masumu mpo na bana ya Isalaele. »
et ce sera une alliance de sacrificature perpétuelle, pour lui et pour sa semence après lui, parce qu’il a été jaloux pour son Dieu, et a fait propitiation pour les fils d’Israël.
14 Kombo ya moto ya Isalaele oyo babomaki elongo na mwasi ya Madiani ezalaki Zimiri, mwana mobali ya Salu, mokambi ya libota ya Simeoni;
Et le nom de l’homme d’Israël frappé, qui fut frappé avec la Madianite, était Zimri, fils de Salu, prince d’une maison de père des Siméonites.
15 mpe oyo ya mwasi ya Madiani ezalaki Kozibi, mwana mwasi ya Tsuri, mokambi ya libota moko ya ekolo ya Madiani.
Et le nom de la femme madianite qui fut frappée, était Cozbi, fille de Tsur, chef de peuplade d’une maison de père en Madian.
16 Yawe alobaki na Moyize:
Et l’Éternel parla à Moïse, disant:
17 « Kamata bato ya Madiani lokola banguna mpe boma bango,
Serrez de près les Madianites, et frappez-les;
18 pamba te bakamataki bino lokola banguna mpe basalelaki mayele mabe mpo na kokweyisa bino, na likambo ya Peori mpe ya ndeko na bango ya mwasi, Kozibi, mwana mwasi ya moko kati na bakambi ya Madiani, oyo babomaki na tango ya etumbu kati na likambo ya Peori. »
car eux vous ont serrés de près par leurs ruses, par lesquelles ils vous ont séduits dans l’affaire de Péor, et dans l’affaire de Cozbi, fille d’un prince de Madian, leur sœur, qui a été frappée le jour de la plaie, à cause de l’affaire de Péor.

< Mitango 25 >