< Banzembo 18 >

1 Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi, mosali na Yawe. Ayembelaki Yawe nzembo na maloba oyo, tango Yawe akangolaki ye wuta na maboko ya banguna na ye nyonso mpe na loboko ya Saulo. Oh Yawe, makasi na ngai, nalingaka Yo.
For the leader. Of David, the servant of the Lord, who recited the words of this song to the Lord after the Lord had saved him from the power of all his enemies and from the hand of Saul. He said: I love you, O Lord, my strength.
2 Yawe azali libanga na ngai, ndako na ngai ya makasi mpe mokangoli na ngai; azali Nzambe na ngai, libanga na ngai mpe ebombamelo na ngai; azali nguba na ngai, Mobikisi na ngai, mpe ekimelo na ngai.
The Lord is my rock, my fortress, deliverer, my God, my rock, where I take refuge, my shield, my defender, my tower.
3 Nabelelaki Yawe oyo abongi na lokumu, mpe nakangolamaki wuta na maboko ya banguna na ngai.
Worthy of praise is the Lord whom I call on, he rescues me from all my foes.
4 Basinga ya kufa efinaki ngai, mpela ya libebi epesaki ngai somo.
The waves of death broke about me, fearful floods of chaos.
5 Basinga ya mboka ya bakufi elingaki ngai, mitambo ya kufa ekangaki ngai. (Sheol h7585)
Sheol threw cords around me, snares of death came to meet me. (Sheol h7585)
6 Kati na pasi na ngai, nabelelaki Yawe, nagangaki epai ya Nzambe na ngai mpo ete asunga ngai. Yawe ayokaki mongongo na ngai wuta na Tempelo na Ye; koganga na ngai mpo na kosenga lisungi ekomaki kino na matoyi na Ye.
In distress I cried to the Lord, and shouted for help to my God; in his temple he heard my voice, into his ears came my cry.
7 Mabele ekomaki koningana makasi, miboko ya bangomba elengaki mpe ebukanaki, pamba te Yawe asilikaki.
Then the earth shook and quaked, mountains trembled to their foundations, and quaked because of his wrath.
8 Milinga ekomaki kobima na zolo na Ye, moto makasi elongo na makala ya moto ekomaki kobima na monoko na Ye.
Smoke went up from his nostrils, devouring fire from his mouth, coals were kindled by it.
9 Yawe afungolaki Lola mpe akitaki; mapata ya mwindo ezalaki na se ya matambe na Ye.
Then he bent the sky and came down, thick darkness was under his feet.
10 Amataki na likolo ya Sheribe mpe apumbwaki, apepaki na mapapu ya mopepe.
He rode on a cherub and flew, darting on wings of wind,
11 Akomisaki molili ebombamelo na Ye, kapo na Ye, oyo ezingelaki Ye; mapata minene ezingelaki Ye, mwindo lokola mayi ya mozindo.
with his screen of darkness about him, in thick dark clouds of water.
12 Kongenga oyo ezalaki liboso na Ye ezalaki kokimisa mapata, konokisa mvula ya mabanga mpe kobimisa makala ya moto.
At the radiance before him there passed hailstones and coals of fire.
13 Yawe agangaki wuta na Lola, mongongo ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo eyokanaki na nzela ya mvula ya mabanga mpe makala ya moto.
The Lord thundered from heaven, the Most High uttered his voice.
14 Abwakaki makonga na Ye mpe atindaki yango na bangambo nyonso; abakisaki motango ya mikalikali mpo na kopalanganisa yango.
He shot his arrows and scattered them, flashed lightnings, and routed them.
15 Yawe, tango ogangelaki yango, na nzela ya pema na Yo mpe ya milinga ya zolo na Yo, nzela oyo mayi ya ebale elekelaka ebimaki, miboko ya mokili emonanaki na libanda.
The channels of the sea were revealed, the world was laid bare to its base, at your rebuke, O Lord, at the blast of the breath of your nostrils.
16 Atandaki loboko na Ye wuta na likolo, akamataki ngai mpe abimisaki ngai na likama oyo nazalaki na yango kati na mayi ya mozindo makasi;
He stretched from on high, he seized me, drew me up from the mighty waters,
17 akangolaki ngai wuta na maboko ya monguna na ngai ya nguya mpe ya bayini na ngai, pamba te balekaki ngai na makasi.
and saved me from those who hated me – fierce foes, too mighty for me.
18 Babundisaki ngai, na mokolo oyo pasi ezalaki kokanga ngai, kasi Yawe azalaki eyekamelo na ngai.
In my day of distress they assailed me, but the Lord proved my support.
19 Abimisaki ngai mpo na kokomisa ngai nsomi, akangolaki ngai, pamba te alingaka ngai.
To a spacious place he brought me, and, for love of me, he saved me.
20 Yawe asaleli ngai makambo wana kolanda bosembo na ngai, afuti ngai kolanda bopeto ya maboko na ngai;
The Lord repays my innocence, he rewards my cleanness of hands.
21 pamba te nabateli banzela ya Yawe, napesi Nzambe na ngai mokongo te lokola bato mabe.
For I kept the ways of the Lord, nor have wickedly strayed from my God.
22 Natosaka mibeko na Ye nyonso mpe nabatelaka bikateli na Ye.
His commandments were all before me, his statutes I put not away.
23 Epai na Ye, nazalaki moto oyo azangi pamela mpe namibatelaki mpo ete nasala masumu te.
And I was blameless before him, guarding myself from sin.
24 Yawe afuti ngai kolanda bosembo na ngai, kolanda bopeto ya maboko na ngai na miso na Ye.
So the Lord repaid my innocence, my cleanness of hands in his sight.
25 Solo, otalisaka bosembo na Yo epai ya moto oyo atambolaka na bosembo, mpe bolamu na Yo, epai ya moto oyo azangi pamela.
With the loyal you are loyal, and with the blameless blameless.
26 Otalisaka bopeto na Yo epai ya moto ya peto, kasi omibombaka liboso ya moto oyo atambolaka nyoka-nyoka.
With the pure you show yourself pure, but shrewd with the devious.
27 Yo nde obikisaka banyokolami, okitisaka bato na lofundu.
For the lowly people you save, but haughty eyes you abase.
28 Yawe, Nzambe na ngai, Yo nde opelisaka mwinda na ngai; obongolaka molili na ngai pole.
You are my lamp, Lord, my God who enlightens my darkness.
29 Elongo na Yo, nabundisaka mampinga oyo elati bibundeli; mpe na lisungi ya Nzambe na ngai, nakatisaka bamir.
With you I can storm a rampart, with my God I can leap a wall.
30 Nzela ya Nzambe ezali ya kokoka, Liloba na Yawe ezali na mbeba te; azali nguba mpo na bato nyonso oyo bazwaka Ye lokola ebombamelo na bango.
As for God, his way is perfect; the word of the Lord is pure. He is shield to all who take refuge in him.
31 Nani azali Nzambe soki Yawe te? Nani azali libanga soki Nzambe na biso te?
For who is God but the Lord? And who is a rock but our God?
32 Nzambe apesaka ngai makasi mpe akomisaka nzela na ngai ya kokoka;
The God who arms me with strength, who cleared and smoothed my way.
33 akomisaka makolo na ngai lokola ya mboloko, mpe avandisaka ngai na bisika ya likolo;
He made my feet like hinds’ feet, and set me up on the heights.
34 alakisaka ngai kobunda, mpe maboko na ngai ekoki kobenda tolotolo ya bronze.
He taught my hands how to fight, and my arms how to bend a bronze bow.
35 Okomisaka lobiko na Yo nguba na ngai, loboko na Yo ya mobali elendisaka ngai, mpe lisungi na Yo ekomisaka ngai makasi.
The shield of your help you gave me, your right hand supports me, you stoop down to make me great.
36 Otambolisaka ngai na kimia, mpe makolo na ngai elengaka te.
In your strength I took giant strides, and my feet never slipped.
37 Nalandaka banguna na ngai, mpe nakangaka bango; nazongaka kaka soki nasilisi koboma bango.
So I chased the foe till I caught them, and turned not, till I made an end of them.
38 Nabebisaka bango nye, mpe bakokaka lisusu kotelema te; bakweyaka na se ya matambe na ngai.
I smashed them, they could not rise, they fell beneath my feet.
39 Opesaka ngai makasi ya bitumba, ogumbaka banguna na ngai mpe otiaka bango na se ya matambe na ngai.
You did arm me with strength for war, you did bow my assailants beneath me.
40 Okimisaka banguna na ngai mosika na ngai, mpe nabebisaka bayini na ngai.
You made my foes turn their back to me, and those who did hate me I finished.
41 Bagangaka mpo na koluka lisungi, kasi moto oyo akokaki kobikisa bango azalaka te; babelelaka Yawe, kasi ayanolaka bango te.
They cried for help, but none saved them; to the Lord, but he answered them not.
42 Nanikaka bango lokola putulu oyo mopepe epumbwisaka, nanyataka bango lokola potopoto ya nzela.
I beat them like dust of the market-place, stamped them like mud of the streets.
43 Olongisaka ngai na bitumba ya bato, obatelaka ngai mpo ete nazala mokambi ya bikolo. Bato oyo nayebaki te bakomi kosalela ngai.
From the strife of the peoples you saved me, you made me head of the nations, peoples I knew not did serve me.
44 Soki kaka bayoki ngai, batosaka ngai; mpe bapaya bayaka mpo ete nasepela na bango.
On the instant they hear, they obey me, foreigners come to me cringing.
45 Bango nyonso balembi nzoto mpe bakomi kobima na kolenga wuta na bandako na bango ya makasi.
Foreigners lose courage, and come out of their strongholds trembling.
46 Longonya na Yawe! Tika ete Ye oyo azali libanga na ngai akumisama! Tika ete Nzambe ya lobiko na ngai anetolama!
The Lord is alive! Blest be my rock! Exalted be God, my protector!
47 Azali Nzambe oyo abundelaka ngai, oyo atiaka bikolo na se ya matambe na ngai,
The God who gave me revenge, and brought down nations beneath me,
48 oyo akangolaka ngai wuta na maboko ya banguna na ngai. Olongisaka ngai liboso ya banguna na ngai, obikisaka ngai na maboko ya banguna na ngai.
who saved me from angry foes, and set me above my assailants, safe from the violent.
49 Yango wana, nakosanzola Yo, Yawe, kati na bikolo; nakoyemba mpo na lokumu ya Kombo na Yo.
For this I will praise you among the nations, making music, O Lord, to your name:
50 Yawe apesaka elonga monene epai ya mokonzi na Ye, atalisaka bolingo na Ye epai ya mopakolami na Ye, epai ya Davidi mpe epai ya libota na ye, mpo na libela.
for great triumphs he grants to his king, and faithful love he shows his anointed, to David and his seed evermore.

< Banzembo 18 >