< Исаия 44 >

1 А ныне слушай, Иаков, раб Мой, и Израиль, которого Я избрал.
Kasi sik’oyo yoka, oh Jakobi, mowumbu na Ngai, Isalaele oyo naponaki!
2 Так говорит Господь, создавший тебя и образовавший тебя, помогающий тебе от утробы матерней: не бойся, раб Мой, Иаков, и возлюбленный Израиль, которого Я избрал;
Tala liloba oyo Yawe alobi, Ye oyo asalaki yo, abongisaki yo wuta na libumu ya mama na yo mpe asungaka yo: Oh Jakobi, mowumbu na Ngai, kobanga te; yo, Yeshuruni, oyo naponaki.
3 ибо Я изолью воды на жаждущее и потоки на иссохшее; излию дух Мой на племя твое и благословение Мое на потомков твоих.
Pamba te nakosopa mayi na mokili ya kokawuka, mpe bibale, na mabele ya kokawuka; nakosopa Molimo na Ngai na likolo ya bana na yo mpe mapamboli na Ngai na likolo ya bakitani na yo.
4 И будут расти между травою, как ивы при потоках вод.
Bakokola malamu kati na matiti ya mobesu lokola banzete ya pepiliye pene ya ebale.
5 Один скажет: “я Господень”, другой назовется именем Иакова; а иной напишет рукою своею: “я Господень”, и прозовется именем Израиля.
Moto moko akoloba: ‹ Nazali ya Yawe, › mpe moto mosusu akomibenga na kombo ya Jakobi, kino mosusu akokoma na loboko na ye: ‹ Nazali ya Yawe, › mpe akozwa kombo ya Isalaele.
6 Так говорит Господь, Царь Израиля, и Искупитель его, Господь Саваоф: Я первый и Я последний, и кроме Меня нет Бога,
Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi mpe Mosikoli ya Isalaele, Mokonzi ya mampinga, alobi: Nazali ebandeli mpe nazali suka; Nzambe mosusu azali te, soki Ngai te.
7 ибо кто как Я? Пусть он расскажет, возвестит и в порядке представит Мне все с того времени, как Я устроил народ древний, или пусть возвестят наступающее и будущее.
Nani azali lokola Ngai? Tika ete atatola yango; tika ete aloba mpe abimisa liboso na Ngai makambo oyo esalema wuta kala, wuta tango nasala bato oyo, mpe makambo oyo ekoya! Solo, tika ete basakola makambo oyo ekoya!
8 Не бойтесь и не страшитесь: не издавна ли Я возвестил тебе и предсказал? И вы Мои свидетели. Есть ли Бог кроме Меня? нет другой твердыни, никакой не знаю.
Bolenga te, bobanga mpe te. Boni, natatolaki yango te? Nasakolaki yango te wuta kala? Bozali batatoli na Ngai. Boni, ezali na nzambe mosusu pembeni na Ngai? Te, ezali na Libanga mosusu te, nayebi ata moko te. »
9 Делающие идолов все ничтожны, и вожделеннейшие их не приносят никакой пользы, и они сами себе свидетели в том. Они не видят и не разумеют, и потому будут посрамлены.
Basali bikeko, bango nyonso, bazali pamba, mpe biloko oyo bango balingaka ezali ata na litomba te; esengelaki kotatola mpo na bango, kasi emonaka te mpe eyebaka ata eloko moko te; boye, bayokisama soni.
10 Кто сделал бога и вылил идола, не приносящего никакой пользы?
Nani asala nzambe to ekeko ya ebende mpo ete ezala ata na litomba moko te mpo na ye?
11 Все участвующие в этом будут постыжены, ибо и художники сами из людей же; пусть все они соберутся и станут; они устрашатся, и все будут постыжены.
Tala, ye elongo na baninga na ye bakozala na soni; basali bikeko bazali na bango kaka bato lokola bato nyonso! Tika ete bango nyonso baya elongo mpe batelema wana; bakokweya na somo mpe na soni.
12 Кузнец делает из железа топор и работает на угольях, молотами обделывает его и трудится над ним сильною рукою своею до того, что становится голоден и бессилен, не пьет воды и изнемогает.
Monyangwisi bibende na moto azwaka sizo, asalelaka yango mpe asalaka na makala ya moto; asalaka ekeko na marto mpe abongisaka yango na makasi ya loboko na ye; nzokande soki akomi na nzala, makasi esili ye; soki mpe ameli mayi te, nzoto elembi ye!
13 Плотник выбрав дерево, протягивает по нему линию, остроконечным орудием делает на нем очертание, потом обделывает его резцом и округляет его, и выделывает из него образ человека красивого вида, чтобы поставить его в доме.
Mosali bikeko afungolaka singa oyo bamekelaka molayi, akomaka elilingi na ekomeli ya motane, asalaka yango na nzela ya mbeli ya minu makasi, abongisaka mondelo na yango na lime mpe apesaka yango lolenge ya moto, ndenge kaka moto azalaka kitoko, mpo ete ekoka kowumela na Esika ya bule.
14 Он рубит себе кедры, берет сосну и дуб, которые выберет между деревьями в лесу, садит ясень, а дождь возращает его.
Akataka banzete ya sedele; mpe tango mosusu, banzete ya sipele to ya sheni; atikaka yango ekola kati na banzete ya zamba mpe alonaka nzete ya pen oyo mvula ekokolisa.
15 И это служит человеку топливом, и часть из этого употребляет он на то, чтобы ему было тепло, и разводит огонь, и печет хлеб. И из того же делает бога, и поклоняется ему, делает идола, и повергается перед ним.
Moto azwaka yango mpo na kopelisa moto, akataka yango mpo na koyetola moto to mpo na kobelisa mapa; kasi asalaka na yango lisusu nzambe oyo afukamelaka; asalaka na yango nzambe ya ekeko oyo agumbamelaka.
16 Часть дерева сожигает в огне, другою частью варит мясо в пищу, жарит жаркое и ест досыта, а также греется и говорит: “хорошо, я согрелся; почувствовал огонь”.
Akotia ndambo ya nzete yango na moto, bongo akolamba na yango mosuni, akotumba mosuni na ye mpe akolia yango kino akotonda; akokoma lisusu koyoka molunge mpe akoloba: « Ah, nayoki molunge, namoni moto epeli makasi! »
17 А из остатков от того делает бога, идола своего, поклоняется ему, повергается перед ним и молится ему, и говорит: “спаси меня, ибо ты бог мой”.
Mpe na ndambo oyo etikali, oyo asalaki na yango nzambe, nzambe na ye ya ekeko, akofukamela yango mpe akosambela yango; akosambela yango mpe akoloba: « Bikisa ngai, ozali nzambe na ngai! »
18 Не знают и не разумеют они: Он закрыл глаза их, чтобы не видели, и сердца их, чтобы не разумели.
Bayebi eloko moko te, bazali na bososoli te; miso na bango ekangama, emonaka te; mitema na bango ezali makasi, esosolaka te.
19 И не возьмет он этого к своему сердцу, и нет у него столько знания и смысла, чтобы сказать: “половину его я сжег в огне и на угольях его испек хлеб, изжарил мясо и съел; а из остатка его сделаю ли я мерзость? буду ли поклоняться куску дерева?”
Moko te akanisaka, moko mpe te azalaka na boyebi mpe na mayele mpo na koloba: « Na nzela ya ndambo na yango, napelisaki moto, nabelisaki mapa na makala na yango ya moto, natumbaki mosuni mpe naliaki yango. Bongo mpo na oyo etikali, nasala na yango penza likambo ya nkele boye? Nafukamela penza mwa eteni ya nzete? »
20 Он гоняется за пылью; обманутое сердце ввело его в заблуждение, и он не может освободить души своей и сказать: “не обман ли в правой руке моей?”
Makanisi na ye ekangama na putulu, motema na ye ya lokuta ezali kokosa ye; akokoka te komikangola mpe koloba: « Boni, eloko oyo ezali na loboko na ngai ya mobali ezali lokuta te? »
21 Помни это, Иаков и Израиль, ибо ты раб Мой; Я образовал тебя: раб Мой ты, Израиль, не забывай Меня.
« Oh Jakobi, kanisa nanu makambo oyo, pamba te, oh Isalaele, ozali mosali na Ngai. Nabongisaki yo mpo ete ozala mosali na Ngai; oh Isalaele, nakobosana yo te.
22 Изглажу беззакония твои, как туман, и грехи твои, как облако; обратись ко Мне, ибо Я искупил тебя.
Nalongoli mabe na yo lokola lipata, masumu na yo lokola lipata ya tongo. Zonga epai na Ngai, pamba te nasili kosikola yo. »
23 Торжествуйте, небеса, ибо Господь соделал это. Восклицайте, глубины земли; шумите от радости, горы, лес и все деревья в нем; ибо искупил Господь Иакова и прославится в Израиле.
Oh Lola, yemba banzembo ya esengo, pamba te Yawe nde asali bongo! Oh mozindo ya mokili, tombola mongongo! Oh bino bangomba, bazamba mpe banzete nyonso kati na yango, boyemba banzembo ya elonga! Pamba te Yawe asikolaki Jakobi, amonisi nkembo na Ye kati na Isalaele.
24 Так говорит Господь, искупивший тебя и образовавший тебя от утробы матерней: Я Господь, Который сотворил все, один распростер небеса и Своею силою разостлал землю,
« Tala liloba oyo Yawe alobi, Ye oyo azali Mosikoli na yo, oyo abongisaki yo wuta na libumu ya mama na yo: Nazali Yawe oyo asalaki biloko nyonso, Ngai moko nde natandaki likolo lokola liputa, Ngai moko nde natandaki mabele.
25 Который делает ничтожными знамения лжепророков и обнаруживает безумие волшебников, мудрецов прогоняет назад и знание их делает глупостью,
Sik’oyo, nakomisi bilembo ya basakoli ya lokuta eloko pamba; natie mobulu kati na molimo ya bato oyo balobaka makambo ekoya, nakweyisi boyebi ya bato ya bwanya mpe nakomisi mayele na bango liboma.
26 Который утверждает слово раба Своего и приводит в исполнение изречение Своих посланников, Который говорит Иерусалиму: “ты будешь населен”, и городам Иудиным: “вы будете построены, и развалины его Я восстановлю”,
Nakokisi maloba ya mosali na Ngai mpe nalongisi mabongisi ya bamemi sango na Ngai. Natatoli na tina na Yelusalemi: ‹ Bato bakovanda kati na yo; › na tina na bingumba ya Yuda: ‹ Ekotongama lisusu, › mpe na tina na mabanga na yango oyo ebukana: ‹ Nakobongisa yango lisusu. ›
27 Который бездне говорит: “иссохни!” и реки твои Я иссушу,
Nalobi na ebale monene: ‹ Kawuka, mpe nakokawusa bibale na yo! ›
28 Который говорит о Кире: пастырь Мой, и он исполнит всю волю Мою и скажет Иерусалиму: “ты будешь построен!” и храму: “ты будешь основан!”
Nalobi na tina na Sirisi: ‹ Azali mobateli oyo naponi, akokokisa makambo nyonso oyo esepelisaka Ngai. Akoloba na tina na Yelusalemi: ‘Tika ete etongama lisusu,’ mpe na tina na Tempelo: ‘Tika ete batonga miboko na yango.’ › »

< Исаия 44 >