< Псалми 17 >

1 Услиши, Господе, правду, чуј глас мој, прими у уши молитву моју не из уста лажљивих.
Libondeli ya Davidi. Oh Yawe, yoka ngai! Kolela na ngai ezali sembo! Yoka koganga na ngai! Landa malamu libondeli na ngai, oyo ezali kobimela te na bibebu ya lokuta.
2 Од лица Твог нека изађе суд мој, очи Твоје нека погледају на правицу.
Tika ete, na mitindo na Yo, bosembo na ngai emonisama solo mpe miso na Yo emona oyo ezali alima!
3 Испитај срце моје, обиђи ноћу; у огњу ме окушај, и нећеш наћи неправде моје.
Soki otali malamu motema na ngai, soki olandeli ngai ata na butu mpe omeki ngai, okomona ete nasalaki mabongisi ya mabe te, monoko na ngai ebukaki mobeko te.
4 Уста се моја не дохватају дела људских; ради речи уста Твојих држим се путева оштрих.
Ata tango bato bamekaki kopesa ngai kanyaka, nabatelaki kaka maloba na Yo mpo ete natambola te na banzela ya bato ya masumu.
5 Утврди стопе моје на стазама својим да не залазе кораци моји.
Matambe na ngai ezalaka kaka na banzela na Yo, napengwaka te.
6 Тебе призивам, јер ћеш ме услишити Боже! Пригни к мени ухо своје, и чуј речи моје.
Nzambe na ngai, nabelelaka Yo, pamba te oyanolaka ngai. Yoka libondeli na ngai.
7 Покажи дивну милост своју, који избављаш оне који се у Те уздају од оних који се противе десници Твојој.
Yo oyo obikisaka mpe okangolaka, na nzela ya loboko na Yo ya mobali, bato oyo bazwaka Yo lokola ebombamelo na bango, lakisa ngai misala kitoko ya bolingo monene na Yo.
8 Чувај ме као зеницу ока: сеном крила својих заклони ме
Batela ngai lokola mbuma ya liso, bomba ngai na se ya mapapu na Yo,
9 Од безбожника који ме нападају, од непријатеља душе моје, који су ме опколили.
mosika ya bato mabe oyo bazali konyokola ngai, mosika ya banguna na ngai oyo bazingeli ngai.
10 Срце своје затворише; устима својим говоре охоло.
Bakomisi mitema na bango makasi, mpe bazali koloba na lolendo.
11 Изагнавши ме опет су око мене; очи су своје упрли да ме оборе на земљу.
Bazali kolanda ngai, basili kozingela ngai, mpe bazali koluka ndenge nini kobwaka ngai na mabele.
12 Они су као лав који хоће да растрже, и као лавић који седи у потаји.
Bazali lokola nkosi oyo etondi na posa makasi ya kokanga nyama, lokola nkosi ya kanda makasi kati na ebombamelo na yango.
13 Устани, Господе, претеци их, обори их. Одбрани душу моју мачем својим од безбожника,
Yawe, telema, kutana na bango mpe bebisa bango; na nzela ya mopanga na Yo, kangola ngai wuta na maboko ya bato mabe.
14 Руком својом, Господе, од људи ових, од људи овог света, којима је део овај живот, којима си трбух напунио свог богатства, да ће им и синови бити сити и остатак оставити својој деци.
Yawe, na nzela ya nguya na Yo, kangola ngai wuta na maboko ya bato wana, kangola ngai wuta na maboko ya bato ya mokili oyo. Tika ete kufa ezala litomba na bango! Tika ete, bango mpe bana na bango, balia na lokoso, mpe mabumu na bango etonda na bikolo oyo obombaka mpo na bango; bongo babomba ndambo oyo ekotikala mpo na bakitani na bango!
15 А ја ћу у правди гледати лице Твоје; кад се пробудим, бићу сит од прилике Твоје.
Mpo na ngai, sima na ngai kolonga, nakotala elongi na Yo; sima na ngai kolamuka, nakosepela na komona Yo!

< Псалми 17 >